Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na koyeba mabala ya malamu
  • Bandɛkɛ ya mayele
  • Televizyo elɛmbisaka bɔɔngɔ ya bana mike
  • Bibliotɛki na “nse ya mabelé”
  • Kobota na Angleterre
  • Bilenge oyo baboyaka kolya bayaka minene
  • Bato balingi lisusu mosala ya sango te
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1994
  • Okosala nini mpo okóma moombo ya televizyo te?
    Lamuká!—2007
Lamuká!—2005
g05 8/4 nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Mpo na koyeba mabala ya malamu

Na engumba Seattle, na etúká ya Washington, na États-Unis, ekipi moko ya bato ya mayele bazwaki bilili, na camera, ya basi ná mibali na bango bazali kolobela makambo oyo bato balingaka kolobela mingi te, lokola makambo ya mbongo mpe ya kosangisa nzoto. Zulunalo Science News elobi ete, na nsima basalaki mituya mpo na koyeba ndenge libala mokomoko ekozala na mikolo ekoya, na kotalela ndenge “babalani bazalaki kotalela bomoi, kondima to koboya likanisi ya moninga, mpe kosepela ntango moko akumisi moninga to kosilika ntango moko alobi na moninga maloba ya koswa.” Mbula minei na nsima, makambo oyo balobaki esalemaki kaka bongo na mabala mingi (94%). Nini esalaki ete mabala wana ezala malamu? Zulunalo yango elobi boye: “Na mabala ya malamu, mimeseno ya malamu lokola kosɛka mpe kosɛkisa moninga ezalaki mingi, mbala mitano koleka mimeseno ya mabe. Eloko mpenza esalaki ete mabala mingi ekufa ezali kozanga kotya likebi ntango mobalani na yo azali koloba.” Moto moko kati na bato wana ya mayele amonaki ete: “Kozanga kotyela moninga likebi ebebisaka bolingo, kaka ndenge acide sulfurique ebebisaka ebende.” Ekipi yango ezali kosalela makanisi oyo bazwi mpo na kosalisa mabala oyo ezali na mikakatano, kati na yango mabala soki mibale likoló ya misato ekómaki na boyokani malamu mwa mikolo nsima ya kozwa toli yango.

Bandɛkɛ ya mayele

Zulunalo The Sunday Times ya Londres elobi ete ntango bayekolaki likambo yango mikolo euti koleka, bamonaki ete “bandɛkɛ bakoki koleka mikomboso mpe mbisi babengi dauphins na mayele.” Ekipi moko ya bato ya mayele na Iniversite ya Cambridge (Angleterre) batɔbɔlaki lidusu na mopanzi ya tiyo moko oyo ezalaki komonana na kati, balalisaki tiyo yango likoló mpo lidusu na yango etalana ná lidusu ya tiyo mosusu oyo batɛlɛmisaki, mpe batyaki bilei na kati ya tiyo ya likoló pembeni ya lidusu. Mikomboso mpe makako bamekaki kobenda bilei yango libándá, kasi bilei ekweaki na lidusu. Kasi ndɛkɛ babengi pinson pic ebendaki bilei yango na mwa nzete mpo ekwea te. Liboso, bato ya mayele na Iniversite ya Oxford batalaki yanganga moko (corbeau), oyo bapesá nkombo Betty, ezali kogumba bansinga ya pɛtɛɛ ya bibende mpe kobongisa yango mpo na kosalela yango​—⁠likambo oyo mikomboso ná makako bakoki koyeba kosala te. Zulunalo Times elobi ete makambo ya sika oyo bamoni “ekweisi likanisi oyo epalangani mingi,” ete bobele mikomboso ná makako nde bakoki kosala mwa biloko ya kosalela.

Televizyo elɛmbisaka bɔɔngɔ ya bana mike

Zulunalo Mainichi Daily News eyebisi ete minganga ya Ebongiseli ya minganga ya bana na Japon elobi ete bana mike oyo batalaka televizyo mingi bazalaka na mokakatano ya kosolola na bato. Mikakatano yango ezali ete bakokaka te kokanga maloba na motó, kotala baboti na bango na miso, mpe komesana na bato. Monganga Hiromi Utsumi, oyo azali na Ebongiseli yango, alobi ete: “Soki bana mike bazali kosakana mingi te na baboti na bango mpe bazali kosakana libándá te, mbala mosusu bɔɔngɔ na bango ekokola malamu te.” Lapolo yango ebakisi ete Ebongiseli yango epesi toli ete “baboti bákangaka televizyo na ntango ya kolya mpe ntango bazali komɛlisa bana mabɛlɛ, mpe esengeli te kotya televizyo, video, mpe ordinatɛrɛ na shambre ya bana.” Lapolo yango ebakisi ete “ntango baboti balandaki toli oyo minganga bapesaki ya kopekisa bana na bango kotala televizyo mpe video mingi, bakómaki kosolola malamu ná bana na bango.”

Bibliotɛki na “nse ya mabelé”

Mpo na kopesa bato mingi mposa ya kotánga mikanda, kompanyi ya métro (bingbunduka oyo etambolaka na nse ya mabelé), na engumba Mexico, esali ebongiseli ya kodefisa bato babuku mpo bátángaka mpe bázongisaka yango. Na bisika oyo métro etɛlɛmaka, bato oyo bazali na kati bakoki kozwa buku moko oyo bakomi na makomi ya minene, oyo ezali na makambo mingi oyo bato ya Mexique bakomá, kotánga yango ntango bazali na métro mpe kotika yango na esika oyo bakokita. Aarón López Bravo, mokambi ya ebongiseli yango, alobi boye: “Bato mingi bazali kotánga, na ndenge yango, bato bakoki kosalela malamu ntango oyo bafandi mpamba mpo na koyekola mpe kominanola.” Zulunalo The Miami Herald, oyo elobelaka masolo ya mikili ebele, elobi ete na sanza ya liboso, bato bazwaki babuku koleka 130 000 na bisika oyo babongisaki mpo na babuku yango. Ebongiseli yango ebandaki na bisika 21 na nzela bobele moko métro, kasi bato oyo babandisaki yango balingi kotya yango na banzela nyonso ya métro, oyo ememaka bato pene na milio mitano na mokolo moko.

Kobota na Angleterre

Zulunalo The Independent ya Londres elobi boye: “Ezali mbala ya liboso na Angleterre, bamama mingi bábota na lipaso (Césarienne) na esika ya kobota bango moko, likambo ya sika na mosala ya monganga.” Mitango oyo Ministère ya makambo etali bokolongɔnɔ ya nzoto na Angleterre epesi mpo na mobu 2001-2002, emonisi ete bamama mingi te (45%) nde babotaki kozanga ete básala bango lipaso. Mapaso ya ndenge wana ekómi kosalema mingi; na 1980 ezalaki mingi te (9%), kasi na 2001-2002 ekómaki mwa mingi (22,3%). Mapaso yango esalemaki mingi (56%) na lopitalo moko oyo basi babotaka. Peter Bowen Simpkins, oyo asalaka na Académie britannique des obstétriciens. alobi boye: “Basi mingi bakómi kosɛnga básala bango lipaso mpo na kobimisa mwana. Basi oyo basalaka . . . bazali kolinga ete mwana na bango abotama mokolo oyo bango balingi. . . . Bazali kokanisa ete kobimisa mwana na lipaso ezali na likama te. Nzokande, likama ya kokufa ezali mingi nde na lipaso ya kobimisa mwana.” Bato oyo bayekoli likambo yango balobi mpe ete bamama oyo baboti mwana na bango ya liboso na lipaso, bakómaka na mokakatano ya kozwa lisusu zemi to kobota na bango ya mibale ezalaka malamu te.

Bilenge oyo baboyaka kolya bayaka minene

Zulunalo U.S. News & World Report elobi boye: “Bilenge oyo baboyaka kolya mpo báya minene te bakoki kosuka na koya minene, yango ememaka bango nde na koya monene mingi.” Nsima ya koyekola likambo yango mbula misato epai ya bilenge pene na 15 000, oyo bazali na mbula kobanda 9 tii 14, bamonaki ete “ezala bilenge mibali to bilenge basi oyo bazalaki koboya kolya mpo báya minene te bayaki nde minene mingi koleka baoyo bazalaki kolya na ndenge esengeli, mpe kilo ya nzoto​—⁠kilo oyo elakisaka ete moto akómi monene mingi​—⁠emataki.” Lapolo yango elobi ete bato oyo bayekoli likambo yango bamonisi ete “koboya kolya mpo na koya monene te ekoki kotinda moto na kolya na lokoso.” Bilenge basi oyo baboyaki kolya mpo babangaki koya minene “bazali mbala 12 koleka baoyo balyaka na ndenge esengeli mpe bandimaki ete bakómaki kolya na lokoso.”

Bato balingi lisusu mosala ya sango te

Zulunalo ya Espagne ABC elobi boye: “Baseminɛrɛ mingi ya Espagne elingi kokangama” mpo bato balingi lisusu mosala ya sango te. Na mbula oyo euti koleka, “baseminɛrɛ 14 eyambaki ata mwana-kelasi moko ya sika te, mpe baseminɛrɛ mosusu 18 eyambaki bobele mwana-kelasi mokomoko.” Mpo na nini bato balingi lisusu mosala ya sango te? Andrés García de la Cuerda, mokambi ya seminɛrɛ moko ya Madrid, alobi ete ezali mpo “bato ya Mpoto bazali lisusu kolinga makambo ya Nzambe ata moke te, likambo oyo esali ete bato mingi babungisi kondima mpe balingi lisusu kosambela te.” García de la Cuerda amonisi mpe ete “ndenge bato bakómi lelo ezali lisusu malamu te mpo na lingomba [Katoliki] mpe makambo na yango.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto