“Ezali malamu mingi!”
◼ Ezali ndenge yango nde mobali moko oyo akambaki ankɛtɛ moko ya makambo etali libala alobaki mpo na buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota. Mwasi moko ná mobali na ye, oyo bazali na kati ya bato oyo batunamaki mituna na ankɛtɛ yango, bapesaki moto wana buku yango mpe bayebisaki ye ete koyekola yango esalisaki bango bámibongisa malamu liboso bábalana.
Moto yango akomelaki babalani yango mpo na kopesa bango mersi mpo na “likabo ya malamu mingi” oyo batindelaki ye. Na nsima, alobaki ete azali na elikya ete babalani lokola bango bakoki koteya basusu “makambo oyo basengeli kosala mpo mabala na bango ezala malamu mpe na esengo.” Andimaki mpenza ete babuku lokola Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota ekosalisa babalani báyeba ndenge ya kosilisa mikakatano oyo ekoki kobima na kati ya libala. Mokambi yango alobaki ete makambo oyo esalisaki babalani wana ezali kondima makasi mpe elikya oyo bazali na yango epai ya Nzambe.
Mokambi yango alobaki ete atyaki buku yango na biro na ye mpo alakisaka yango bato oyo bakoya kotuna ye batoli mpo na libala. Na nsuka alobaki boye: “Ezalaki mbala ya liboso namona buku yango, mpe ezali malamu mingi!”
Buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota esalisi babalani mingi mpenza na mokili mobimba. Ekoki mpe kosalisa yo osalela mitinda ya Biblia oyo ekoki kosala ete libota na yo ezala na esengo.
Okoki kosɛnga buku yango ya nkasa 192 soki otondisi eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo etyami awa to oyo ebongi na yo na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga kofuta mbongo.