Mikolo ya nsuka—Na nsima nini?
BATO mosusu babangaka “mikolo ya nsuka.” (2 Timote 3:1) Bamonaka ete mikolo ya nsuka elimboli kaka bantango ya mpasi. Kasi, mpo na nini bato ya bileko ndenge na ndenge bazalaki kozela mikolo ya nsuka? Mpamba te mikolo ya nsuka esengelaki mpe komonisa ete makambo ya malamu ezali koya.
Na ndakisa, Isaac Newton ayebaki ete soki nsuka eyei, na nsima mabelé mobimba ekokóma na kimya mpe makambo ya malamu ekozala na Boyangeli ya Mbula Nkóto ya Bokonzi ya Nzambe. Alobaki ete esakweli ya Mika 4:3, mpe ya Yisaya 2:4, ekokokisama na ntango yango: “Bakotula mipanga na bango ete mizala bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli ya matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”
Ntango Yesu alobelaki mikolo ya nsuka, ayebisaki bayekoli na ye bázala na kobanga te. Nsima ya kolobela bampasi, mitungisi, mpe kobanga oyo bato bakozala na yango na bolɔzi monene, Yesu alobaki boye: “Ntango makambo wana ekobanda kobima, bótɛlɛma alima mpe bótombola mitó na bino, mpamba te kosikolama na bino ekómi pene.” (Luka 21:28) Kosikolama na likambo nini?
Makambo oyo Nzambe alaki
Bitumba, kowelana, koboma bato, mobulu, mpe nzala ezali na kati ya makambo ya mpasi oyo bato bazali na yango lelo oyo mpe ezali kobangisa bato mingi. Makambo yango mosusu esilá kokómela yo? Soki ezali bongo, talá makambo oyo Nzambe alaki:
“Nsima ya mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te . . . Nde bato ya bopɔlɔ bakosangola mokili, bakosepela mpe na kimya ya solo.”—Nzembo 37:10, 11.
“Bato na ngai bakofanda na efandelo ya kimya na bifandelo ya solo mpe na ndako ya bolɔzi te.”—Yisaya 32:18.
“[Yehova] akosukisa bitumba kino nsuka ya mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga, akozikisa mpe makalo kati na mɔtɔ.”—Nzembo 46:9.
“Bakofanda mpe na nse, moto na moto na nse ya [nzete ya vinyo, NW] na ye mpe na nzete na ye [ya figi, NW], moto moko akobangisa bango te.”—Mika 4:4.
“Masango ekotondana na mokili ata kino likoló na nkeka.”—Nzembo 72:16.
“Nde ye oyo akoyokamela ngai akofanda na kimya, mpe akobanga mabe te.”—Masese 1:33.
Ata soki tofandaka na mboka oyo makambo ezali mwa malamu, biso nyonso tokutanaka na makambo lokola maladi mpe liwa. Makambo yango mpe ekosila na mokili ya sika oyo Nzambe alaki. Tokoki ata kozala na elikya ya komona lisusu bandeko mpe baninga na biso oyo bakufá. Talelá bavɛrsɛ oyo:
“Mofandi moko akoloba te ete, Ngai nazali na maladi.”—Yisaya 33:24.
“[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.”—Emoniseli 21:4.
“Liwa, oyo ezali monguna ya nsuka, akobebisama nyɛɛ.”—1 Bakolinti 15:26.
“Ngonga ezali koya wana baoyo nyonso bazali na kati ya malita ya kokanisama bakoyoka mongongo [ya Yesu] mpe bakobima.”—Yoane 5:28, 29.
Ntoma Petelo alobelaki makambo yango nyonso na mokuse ntango akomaki boye: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Mpo boyengebene ezala na mokili mobimba, esengeli ete moto nyonso oyo akoki kobebisa yango azala lisusu te. Esengeli mpe ete bikólo oyo ezali kobimisa bitumba oyo ezali koboma ebele ya bato mpo na matomba na yango ezala lisusu te. Baguvɛrnema nyonso ya mokili ekolongwa mpe ekotika esika na Bokonzi ya Nzambe, oyo Klisto akotambwisa. Mpo na boyangeli yango, Biblia epesi biso elaka oyo: “Kofuluka ya bokonzi na ye mpe ya kimya ekosuka te; na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe likoló ya bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atɛmisa yango na kosambisa-sembo mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa ya [Yehova] na bibele ekosala oyo.”—Yisaya 9:7.
Bilaka yango ekoki kokokisama epai na yo, mpamba te Biblia elobi boye: “Mokano [ya Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.” (1 Timote 2:4) Yango wana, kolekisa ntango te. Luká kozwa boyebi oyo ekomema na bomoi ya seko. (Yoane 17:3) Tindá mokanda epai ya babimisi ya zulunalo oyo mpe sɛngá bango ete moto moko aya koyekola na yo Biblia ofele.
[Bililingi na nkasa 8, 9]
Yo mpe okoki kozala na elikya ya bomoi ya seko, na kimya mpe na nzoto ya kokoka na Paladiso awa na mabelé