Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/08 nk. 10-11
  • Mabelé ekokóma Paladiso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabelé ekokóma Paladiso?
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli moko ya kokoka
  • “Okozala elongo na ngai na Paladiso”
  • Makanisi ya bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabelé ezali nini?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Okoki kondima ete Paladiso ekozala na mabelé
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mokano ya Nzambe mpo na mabele ezali nini?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Mokano ya Nzambe mpo na bato ezali nini?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 10/08 nk. 10-11

Biblia elobi nini?

Mabelé ekokóma Paladiso?

BATO ya bikólo mingi, na ndakisa ya bato ya Égypte, ya Mexique, ya Pérou mpe ya Tibet, bazalaka na masapo oyo elobelaka eleko moko oyo moto azalaki na lisumu te, azalaki na boyokani malamu na Nzambe, mpe azalaki kobɛla te mpe liwa ezalaki te. Masapo yango elobelaka mpe ndenge oyo moto akweaki na lisumu.

Atako bato babakisá makambo ndenge na ndenge na masapo yango, makambo na yango mingi ekokani. Yango etindi bato mingi bámona ete masapo yango eutá na makambo oyo esalemaki mpenza. Ya solo, makambo ya masapo yango ekokani na oyo ezali na mikapo ya ebandeli ya mokanda ya Genese, na Biblia. Nzokande, mikapo yango elobeli makambo na ndenge ya masapo te, kasi elobeli na bosikisiki makambo yango ndenge esalemaki mpenza.​—2 Timote 3:16.

Ebandeli moko ya kokoka

Mokanda ya Genese elobi ete ntango Nzambe akelaki bato ya liboso​—Adama ná Eva—​atyaki bango na esika moko kitoko oyo ebengamaki Elanga ya Edene. Bazalaki na nzoto ya kokoka mpe bazalaki na elikya ya bomoi ya seko. Liwa ezalaki etumbu oyo basengelaki kozwa soki basali lisumu. (Genese 2:8-17; Baloma 5:12) Adama ná Eva basengelaki ‘kobota mpe kozala na kobota mingi, mpe kotondisa mokili mpe kotya yango na nse na bango.’ (Genese 1:28) Na yango, balingaki kokómisa mabelé mobimba paladiso oyo etondi na bato ya kokoka, oyo basepelaka kotosa Nzambe, Moyangeli na bango.

Kasi, Adama ná Eva batosaki Nzambe te; na bongo, babungisaki libaku malamu ya kokokisa mokano ya Mozalisi na bango mpe elikya ya kozala na bomoi ya seko. Atako bongo, Yehova Nzambe akokokisa mokano na ye mpo na mabelé. Alobi boye: “Liloba oyo ekobima na monɔkɔ na ngai; [ekozonga, NW] epai na ngai mpamba te, kasi . . . ekolonga.” (Yisaya 55:11) Ya solo, mokano ya Yehova, oyo ezali ete mabelé ezala paladiso oyo etondi na bato oyo bazali komonisa bizaleli na ye, ezali motó ya likambo ya Biblia.​—Baloma 8:19-21.

“Okozala elongo na ngai na Paladiso”

Kaka ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, Nzambe alakaki ete akobimisa “momboto,” to mokitani oyo, nsukansuka akobebisa “nyoka ya ebandeli,” Satana Zabolo, mpe akobukabuka misala na ye. (Genese 3:15, NW; Emoniseli 12:9; 1 Yoane 3:8) Moto ya liboso na “momboto” yango ezalaki Yesu Klisto. (Bagalatia 3:16) Lisusu, Nzambe aponaki ye azala Mokonzi ya Bokonzi ya likoló, to guvɛrnema oyo ekoyangela mabelé.​—Danyele 7:13, 14; Emoniseli 11:15.

Klisto akosala likambo oyo Adama akokaki kosala te. Kutu, Biblia ebengi Yesu “Adama ya nsuka.” (1 Bakolinti 15:45) Lisusu, na libondeli ya ndakisa, Yesu amonisaki ete Bokonzi ya Nzambe ekobongisa mabelé; alobaki boye: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.”​—Matai 6:10.

Ntango Yesu, Mokonzi oyo aponamaki, azalaki awa na mabelé, lokola mosali-mabe oyo babakaki na nzete pembeni na ye abongolaki motema, alobaki na ye boye: “Okozala elongo na ngai na Paladiso.” (Luka 23:43) Paladiso oyo Yesu alobelaki ekozala awa na mabelé, ndenge Nzambe akanaki yango na ebandeli. Biblia emonisi likambo yango polele. Tótalela bavɛrsɛ oyo elandi.

“Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” (Nzembo 37:29) “Masango ekotondana na mokili ata kino likoló ya nkeka.” (Nzembo 72:16) “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango.” (Masese 2:21) “[Bato ya sembo] bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba ya bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi ya [ Yehova] lokola mbonge ekozipaka mai-na-monana.”​—Yisaya 11:9.

Na boyokani na maloba ya bavɛrsɛ yango, na Lisolo Likoló ya Ngomba, Yesu alobaki boye: “Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.” (Matai 5:5) Na nsima, ntoma Yoane akomaki boye: “Hema ya Nzambe ezali elongo na bato . . . Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala esili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Ya solo, tomoni polele ete bavɛrsɛ yango ya Biblia emonisi ete “paladiso” ekozala awa na mabelé, kasi na likoló te.

Makanisi ya bato ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia

Bato mingi ya mayele oyo balimbolaka maloba ya Biblia bandimaka ete na Bokonzi ya Klisto, mabelé ekokóma paladiso. Joseph Seiss, moto moko ya teoloji, alobaki boye: “Na boyangeli ya Masiya, nsukansuka mabelé mobimba ekokóma . . . ndenge . . . esengelaki kozala soki Adama asalaki lisumu te.” Na libongoli na ye (The New Testament for English Readers), Henry Alford akomaki boye: “Bokonzi yango ya Nzambe . . . ekokoba kosala tii ntango ekokóma mpenza koyangela na mabelé mobimba, mpe bato na yango bakozwa mabelé . . . , oyo ekozongisama sika mpe kitoko mpo na libela.”

Ndenge moko mpe, Isaac Newton, moto moko ya mayele mpe moyekoli ya Biblia, akomaki boye: “[Bato] bakokoba kofanda na mabelé nsima ya mokolo ya kosambisama, kaka mpo na mbula 1 000 te, kasi libela na libela.”

Lokola Yesu Klisto akoyangela mabelé, mabe ekozala lisusu te. (Yisaya 11:1-5, 9) Ya solo, mabelé ekokóma mpenza paladiso libela na libela, mpo na nkembo ya Mozalisi na yango.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Na ebandeli mokano ya Nzambe mpo na bato mpe mpo na mabelé ezalaki nini?​—Genese 1:28.

◼ Bokonzi ya Nzambe ekokokisa makambo nini?​—Matai 6:10.

◼ Mpo na nini mabe ekozonga lisusu te?​—Yisaya 11:1-5, 9.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 11]

“Esengo na bato ya elimo ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabelé.”​—Matai 5:5

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto