Biblia elobi nini?
Komiyokisa nzoto mpasi ekoki kosalisa yo opusana penepene na Nzambe?
BATO mingi basepelaka te na likanisi ya komiyokisa nzoto mpasi. Nzokande, basambeli mosusu oyo bayokisaki nzoto na bango mpasi, na ndakisa oyo bamibɛtaki fimbo, bakilaki bilei na ndenge ya koleka ndelo mpe balataki bilamba oyo ezalaki kosala bango mpasi na loposo ya nzoto, bakumisaki bango ete bazali ndakisa ya bato oyo babangaka Nzambe. Makambo yango esalemaka tii lelo oyo. Balapolo oyo euti kobima na bazulunalo mikolo oyo, emonisi ete ata bakonzi ya mangomba ya mikolo na biso oyo bayebani mingi bamibɛtaki fimbo.
Nini etindaka bato básambela Nzambe lolenge wana? Molobeli moko ya lingomba ya bokristo alobaki boye: “Kondima komiyokisa mpasi ezali lolenge ya komonisa ete osangani na Yesu Kristo na bampasi oyo andimaki komona mpo na kosikola biso na lisumu.” Atako bakonzi ya mangomba balobaka bongo, kasi Biblia elobi nini na likambo yango?
Lingáká nzoto na yo
Biblia endimaka te kosambela Nzambe na nzela ya komiyokisa nzoto mpasi. Kutu, Biblia elendisaka mpenza bato oyo babangaka Nzambe ete bábatelaka nzoto na bango. Tótalela lolenge oyo Biblia elobeli bolingo oyo ezalaka kati na mobali mpe mwasi. Mpo na komonisa ndenge mobali asalaka mpo na nzoto na ye moko, Biblia elobi ete: “Mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko . . . moto moko te ayinaka nzoto na ye moko; kasi aleisaka nde yango mpe alɛngɛlaka yango, ndenge Kristo mpe asalaka mpo na lisangá.”—Baefese 5:28, 29.
Etinda ya kolinga mwasi na yo ndenge omilingaka elingaki kozala na ntina mpenza soki Nzambe asɛngaki basambeli na ye ete bamiyokisaka nzoto mpasi ntango bazali kosambela ye? Emonani polele ete bato oyo balingaka mateya ya Biblia basengeli kobatela, ata mpe kolinga nzoto na bango, basengeli mpe komonisa bolingo ya malamu ndenge wana epai ya balongani na bango.
Likambo ya esengo, Biblia ezali na batoli mingi oyo esalisaka bato oyo batángaka yango bálinga nzoto na bango. Na ndakisa, Biblia elobeli litomba ya kosala ngalasisi na ndenge ebongi. (1 Timote 4:8) Emonisi ete bilei mosusu esalisaka na maladi mpe elobeli makama ya biloko oyo ezangi vitamini. (Masese 23:20, 21; 1 Timote 5:23) Biblia elendisaka bato bázala na nzoto malamu, mpo kosala bongo ekosalisa bango bázala makasi. (Mosakoli 9:4) Soki bato oyo batángaka Biblia basengeli kobatela nzoto na bango ndenge wana, tokoloba boni mpo na baoyo bamiyokisaka nzoto mpasi?—2 Bakorinti 7:1.
Bakristo basengeli komimonisa mpasi oyo Yesu amonaki?
Na libunga nyonso, mangomba mosusu elobelaka mingi mpasi oyo Yesu mpe bayekoli na ye ya siɛklɛ ya liboso bayokaki mpo na komonisa ete lelo oyo tokoki komiyokisaka nzoto mpasi. Kasi, mpasi oyo Biblia elobi mpo na basaleli ya Nzambe ezalaki soki moke te oyo bango moko bamiyokisaki. Ntango bakomi ya Biblia balobelaki mpasi oyo Kristo amonaki, bazalaki kolendisa bakristo bayika mpiko na minyoko, kasi bamiyokisa mpasi bango moko te. Yango wana, baoyo bazali komiyokisa nzoto mpasi, bazali kolanda Yesu Kristo te.
Tózwa ndakisa: Kanisá ete ozali komona ndenge ebele ya bato bazali kofinga moninga na yo mpe bazali kobɛta ye. Omoni ete moninga yango azali koyika mpiko na motema mpiɔ mpe na kimya; kasi azali kofinga te to kobɛta te. Soki olingi komekola moninga na yo, okobanda komifinga mpe komibɛta? Soki moke te! Kosala bongo, ekomonisa ete ozali kolanda makambo oyo ebele ya bato wana basali. Na ntembe te, okoboya kozongisa mabe soki okutani na likambo ya ndenge wana.
Na yango, emonani polele ete bakristo basengeli te komiyokisa nzoto mpasi, mpo kosala bongo ekomonisa ete bazali komekola ebele ya bato oyo banyokolaki Yesu mpe balukaki koboma ye. (Yoane 5:18; 7:1, 25; 8:40; 11:53) Na esika ya kosala bongo, ntango bakutani na monyoko, basengeli koyika mpiko na motema ya mpiɔ, na kimya nyonso ndenge Yesu asalaki.—Yoane 15:20.
Eyokani te na Biblia
Ata liboso Kristo aya na mokili, mibeko ya Biblia oyo ezalaki kotambwisa Bayuda mpe losambo na bango, epekisaki bango kosala likambo nyonso oyo ekokaki kozokisa bango. Na ndakisa, Mibeko epekisaki Bayuda polele ete basengelaki komikatakata nzoto te, momeseno oyo ezalaki kosalema mingi epai ya bato oyo bazalaki Bayuda te. (Balevi 19:28; Kolimbola Mibeko 14:1) Soki Nzambe alingaki te ete bato bákatakata nzoto na bango, akolinga mpe te ete bato bamibɛtaka fimbo. Toli ya Biblia ezali polele: Nzambe andimaka te komiyokisa mpasi na nko, ata na lolenge nini.
Ndenge kaka moto oyo asalaka biloko ya kitoko, na ndakisa tablo to liyemi moko, alingaka ete bato bázwa mosala na ye na kilo, Yehova Nzambe, Mozalisi na biso alingaka mpe ete tózwaka na motuya nzoto na biso oyo ye akelá. (Nzembo 139:14-16) Ya solo, komiyokisa nzoto mpasi ebongisaka te boyokani ya moto na Nzambe. Kutu, ebebisaka nde yango mpe ebongolaka mateya ya Baevanzile.
Mpo na liteya wana ya mabe, oyo bato babimisaki, ntoma Paulo akomaki na litambwisi ya elimo santu ete: “Ya solo, makambo wana emonanaka lokola ezali makambo ya bwanya, na nzela ya losambo oyo moto amityeli ye moko mpe komikitisa ya lokuta, konyokola nzoto makasi; kasi ezali ata na ntina moko te mpo na kobundisa mposa ya nzoto.” (Bakolose 2:20-23) Momeseno ya komiyokisa nzoto mpasi esalisaka moto soki moke te mpo apusana penepene na Nzambe. Kutu, makambo oyo Nzambe asɛngaka mpo na losambo ya solo epemisaka, ezali pɛtɛɛ mpe pɛpɛlɛ.—Matai 11:28-30.
OSILÁ KOMITUNA?
● Ndenge nini Nzambe atalelaka nzoto ya moto?—Nzembo 139:13-16.
● Komiyokisa nzoto mpasi ekoki kosalisa yo obundisa bamposa mabe?—Bakolose 2:20-23.
● Losambo ya solo ezalaka kilo to na makambo makasimakasi?—Matai 11:28-30.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 29]
Toli ya Biblia ezali polele: Nzambe andimaka te komiyokisa mpasi na nko, ata na lolenge nini
[Elilingi na lokasa 28]
Moto moko azali komiyokisa mpasi na mabɔlɔngɔ mpo akóma na ndako-nzambe
[Eutelo ya bafɔtɔ]
© 2010 photolibrary.com