Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/11 lok. 32
  • “Mersi ndenge bolakisi ngai Tata ya bolingo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Mersi ndenge bolakisi ngai Tata ya bolingo”
  • Lamuká!—2011
Lamuká!—2011
g 4/11 lok. 32

“Mersi ndenge bolakisi ngai Tata ya bolingo”

● Elenge mwasi moko ya mbula 19 oyo afandaka na sudi ya États-Unis akomaki boye: “Nakolá na libota oyo bato bakendeke na ndako-nzambe mpe nayebi ete Yesu Kristo azali mobikisi na ngai. Ata bongo, bambula mingi, nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe ya konyokola bato na lifelo ya mɔtɔ. Na nsima, nabandaki kotánga buku na bino Biblia eteyaka mpenza nini?

“Nsima ya kotánga kaka mwa mikapo ya buku yango, nayokaki kimya mpenza na motema. Namonaki lokola nde balongoli ngai kilo oyo nazalaki komema. Sikoyo, namonaka ete Yehova azali Nzambe ya bolingo, ya boboto, mpe ya motema mawa. Alingi ete nazala moninga na ye, kasi te nabangaka ye na ndenge moko ya mabe. Nazali komibongisa mpo na kokende na ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova na lomingo oyo! Nazali mpenza na esengo. Mersi na ndenge bolakisi ngai Tata ya bolingo, kasi te oyo asalá lifelo ya mɔtɔ.”

Buku Biblia eteyaka elobeli mpe makambo mosusu ya ntina. Na kati na yango, ndenge oyo bakufi bazalaka, elikya ya lisekwa, ndenge ya kozala na libota ya esengo, Nzambe mpe Yesu Kristo bazali banani, mpe ntina oyo Nzambe atiki nzela na bampasi. Okoki kosɛnga buku yango soki otondisi mwa lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo ebongi kati na baadrɛsi oyo ezali na lokasa 5 ya zulunalo oyo.

□ Nalingi kozwa buku oyo bolakisi awa. Yebisá soki na monɔkɔ nini.

□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto