Ndenge natikaki mobulu
Lisolo ya Jose Antonio Nebrera
NINI etindaka moto akóma moto ya mobulu? Nayekolaki makambo mingi ya mobulu mpo nakutanaki na yango na bomwana. Tata na ngai azalaki na kati ya basoda oyo bazalaki kokɛngɛla bana-mboka ya Espagne mpe etuluku na bango ezalaki na disiplini makasi mpenza. Tata na ye moko azalaki kobɛta ye fimbo mbala mingi, mpe tata na ngai alandaki momeseno wana ya libota na ye. Mbala mingi azalaki kobɛta ngai makasi na mokaba na ye ya monene. Longola yango, azalaki mbala na mbala kobenga ngai zoba, kasi azalaki mpenza kobondela leki na ngai ya mwasi. Lokola mama azalaki kobanga nkanda ya papa, azalaki kosala eloko mpenza te mpo na kokitisa mitungisi na ngai ntango bazalaki konyokola ngai ndenge wana, to komonisela ngai bolingo oyo nazalaki na yango mposa.
Na kelasi, elongo na bana mosusu, nazalaki komimona lokola nazali na mokili mosusu, epai bomoi na ngai ezali na esengo mingi. Mpe mbala mosusu bato oyo bazalaki komona ngai bazalaki kokanisa ete nazali mwana moko ya esengo mpe oyo atondi na elikya. Kasi, wana ezalaki kaka na libándá. Ezalaki kaka mpo na kobomba kobanga mpe nkanda na ngai. Nzokande, mpokwa nyonso ntango nazalaki kozonga ndako malɛmbɛmalɛmbɛ, nazalaki kobanga ndenge bakofinga ngai to bakobɛta ngai lisusu.
Ntango nakómaki na mbula 13, nakimaki ndako na biso oyo ezangá bolingo mpe nakendaki komikomisa na mbola ya basango (pensionnat jésuite). Na eleko moko, nazalaki kokanisa kokóma sango. Kasi, bomoi oyo tozalaki na yango kuna epesaki ntina mpenza te na bomoi na ngai. Tozalaki kolamuka na ngonga ya 5:00 na ntɔngɔ mpe kosukola na mai ya malili. Na nsima, programɛ ya mokolo mobimba ezalaki mpasi, tosengelaki kotánga, kobondela mpe kosala misala ya losambo; mpe tozalaki kopema kaka mokemoke.
Atako basɛngaki biso bana-kelasi tótángaka masolo ya “basantu,” boyekoli ya Biblia ezalaki na programɛ na biso te. Biblia ezalaki kaka moko mpe ebombamaki na sanduku moko ya talatala; mpo na kotánga yango, esɛngaki mpenza kozwa ndingisa.
Na mbula ya misato na mbola yango, na bomoi wana ya mpasi oyo tozalaki na yango, momeseno ya komibɛta yo moko, oyo bazalaki kobenga “ngalasisi ya elimo,” ekɔtaki na programɛ na biso. Mpo na kokima yango, nakómaki kolya bilei mingi na lokoso mpo nabɛla. Kasi esimbaki te. Nsima ya mbula pene na misato, nakokaki lisusu makambo te. Nakimaki eteyelo yango mpe nazongaki na ndako. Nazalaki na mbula 16.
Naluki bomoi ya loyenge
Ntango nazongaki na ndako, nakómaki kosala lisano ya makofi mpe ya kobunda líbanda. Kolonga na masano yango ya mobulu etindaki ngai namona ete nazali na ntina. Kasi, etindaki mpe ngai nasalela yango mpo na kozwa eloko nyonso oyo nalingi, kaka ndenge tata na ngai azalaki kosala.
Kasi ntango nakómaki na mbula 19, likambo moko ememelaki ngai mwa boboto moke na bomoi. Nakutanaki na Encarnita, mpe sanza libwa na nsima, akómaki mwasi na ngai. Amonaki kaka bonkonde, boboto, mpe esengo na ngai ya libándá. Ayebaki te nkanda oyo ezalaki kotɔka na kati na ngai. Eumelaki te, nkanda yango ebimaki ntango babengaki ngai nakóma soda mwa moke nsima ya kobotama ya mwana na biso ya liboso.
Mpo na koboya kokata nsuki na modɛlɛ ya basoda mpe mpo na koluka bomoi ya loyenge, nandimaki mbala moko kosala na limpinga ya basoda ya Légion étrangère espagnole. Nazalaki kokanisa ete nakozwa bonsomi na esobe ya Maroc ntango nakosala misala ya likama oyo bakotinda biso. Longola yango, nazalaki komona ete ekosalisa ngai nakima kokokisa mikumba na ngai na libota. Kasi nsukansuka, ebimisaki nde mabe oyo ezalaki kati na ngai.
Eumelaki te, nazwanaki matata na mokonzi moko ya basoda oyo azalaki na nko mingi mpe azalaki kosepela konyokola basoda ya sika. Nazalaki koyina makambo ya kozanga bosembo, mpe nazalaki pene ya kobunda mpo na likambo oyo namoni ete ezali sembo. Na ntɔngɔ moko ntango bazalaki kobenga biso nkombo, nasalaki lisɛki moko boye mpe mokonzi yango azwaki yango na ndenge ya mabe. Ntango atombolaki lobɔkɔ mpo abɛta ngai, na mbala moko nagumbaki ye lobɔkɔ mpe na nabambaki ye na mabele. Nafinaki lobɔkɔ yango kaka na mabele; nabangaki azwa mondoki na ye ya moke mpe aboma ngai.
Mpo na likambo wana, bapesaki ngai etumbu sanza misato. Batyaki ngai na mwa ndako moko oyo ezalaki na eloko te elongo na mibali 30. Na boumeli ya ntango wana nyonso, nakokaki ata kolata bilamba mosusu te. Mokɛngɛli ya ndako yango azalaki moto mabe mpenza mpe azalaki kosepela kobɛta biso. Kasi mokolo moko ntango nalobaki na ye ete nakoboma ye soki asimbi ngai, abɛta ngai fimbo 3 na esika ya 30. Nakómaki motema makasi, kaka lokola bato oyo bazalaki konyokola ngai.
Misala ya kobombana
Ntango nazalaki kozwa formasyo na Légion étrangère, nandimaki mbala moko misala “ya loyenge” koleka. Wana mpe, nayebaki te soki ekomema ngai wapi. Nazwaki formasyo ya commando, oyo esɛngaki mpe kosalela mandoki ya ndenge nyonso mpe babɔmbi. Mpo na kosilisa formasyo yango, batindaki ngai na Langley, na etúká ya Virginie, na États-Unis, epai nazwaki formasyo na bato ya CIA.
Eumelaki te, nakɔtaki na etuluku ya ba-commando oyo basalaka misala ya kobombana. Na bambula ya 1960, nasalaki misala mingi ya kobombana. Napesaki mabɔkɔ na misala ya kokanga bato oyo bakɔtisaka bangi mpe mandoki na ndenge ya kobombana na Amerika ya Ntei mpe ya Sudi. Bapesaki biso mitindo ete soki tokutani na bango, tóboma bango. Nazali na nsɔni ya koloba ete ngai mpe nasalaki kaka bongo. Tozalaki koboma bato nyonso, longola kaka baoyo bakokaki koyebisa biso makambo.
Na nsima, basɛngaki ngai nanɔnga bakonzi ya basoda ya Espagne mpo na koyeba baoyo bazalaki koboya boyangeli ya Franco, mokonzi moko ya makambo makasimakasi. Tozalaki mpe konɔnga batɛmɛli ya boyangeli ya Franco oyo bazalaki kofanda na France. Mokano ezalaki ya kokanga banguna minene mpe komema bango na Espagne, na ntembe te mpo bábomama.
Mosala na ngai ya nsuka esɛngaki nabongisa etuluku moko ya basoda mpo tókende kokweisa guvɛrnema ya ekólo moko moke na Afrika. Bayebisaki biso tóbundisa bakaa ya basoda ya engumba-mokonzi na mbalakaka mpe na nsima tózwa ndako ya prezida. Ndenge tobongisaki yango, tokɔtaki na ekólo yango na midi ya butu mpe tosilisaki mosala na biso nsima ya ngonga minei mpamba. Baninga na ngai misato bakufaki na etumba yango, elongo na basoda ebele ya ekólo yango. Ngai moko mpe nabomaki bato.
Likambo wana ya nsɔmɔ etungisaki lisosoli na ngai. Nazalaki kokoka kolala te mpo nazalaki kolɔta ndenge nazalaki koboma banguna na mabɔkɔ. Na bandɔtɔ yango, nazalaki komona bilongi ya bato oyo nalingaki koboma etondi na nsɔmɔ.
Nazwaki ekateli ete wana ezali mosala na ngai ya nsuka. Na yango, nazongisaki mikanda na ngai epai ya basoda mpe bandimaki nalongwa mosala. Kasi, sanza misato na nsima, bakonzi na ngai babengaki ngai nasala misala mosusu ya konɔnga. Nakimaki na Suisse, mpe basanza mingi na nsima, mwasi na ngai Encarnita—oyo ayebaki kutu te ete nasalaka misala ya kobombana—alandaki ngai na engumba Bâle.
Mimeseno ya mabe esilaka noki te
Na boumeli ya mbula misato oyo nasalaki mosala ya soda, Encarnita abandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova ntango azalaki na Espagne. Ayebisaki ngai ete amoni solo na ntina na Nzambe, mpe esengo na ye ezwaki mpe ngai. Tolukaki na mbala moko Batatoli na Suisse mpe tobandaki koyekola Biblia elongo.
Nasepelaki mingi koyeba mokano ya Nzambe. Atako nalingaki koyokanisa bomoi na ngai na mitinda ya Biblia, kotika makambo mosusu ezalaki mpasi—mingimingi na oyo etali bomoto na ngai ya nkandankanda. Kasi, nazalaki kolinga bindimeli na ngai ya sika. Nsima ya koyekola mwa basanza, namonaki mpenza ete nakoki kobanda kosakola ndako na ndako elongo na Batatoli ya Yehova.
Na lisalisi ya Yehova, nsukansuka nayekolaki komipekisa, mpe nsima ya mikolo, ngai ná Encarnita tozwaki batisimo. Ntango nakómaki na mbula 29, nakómaki mokɛngɛli na lisangá.
Na 1975, tozwaki ekateli ya kozonga na Espagne. Kasi, basoda babosanaki ngai te, mpe babengaki ngai napesa mabɔkɔ na mosala moko ya kobombana. Mpo na koboya mindɔndɔ, eumelaki te nakimaki lisusu na Suisse. Tofandaki kuna tii nsukansuka tozongaki na Espagne na 1996.
Lelo, mwana na ngai ya mobali ná oyo ya mwasi babalá, mpe nazali na bankɔkɔ mibale; bango nyonso bazali kosalela Yehova. Lisusu, na boumeli ya bambula, nazwaki libaku ya kosalisa bato soki 16 báyeba Yehova, kati na bango elenge mobali moko oyo azalaki kala kosala mobulu na balabala, na nɔrdi ya Espagne. Yango epesaki ngai esengo mingi.
Nabondelaki Nzambe mbala na mbala mpo asalisa ngai naboya mobulu mpe natika kolɔta bandɔtɔ ya mabe. Na etumba na ngai mpo na kosala oyo ezali malamu, nalandaki toli ya Nzembo 37:5 ete: “Tikelá Yehova nzela na yo, mpe talelá ye, mpe ye moko akosala.” Yehova akokisaki elaka yango. Asalisá ngai natika mobulu. Yango ezali lipamboli monene mpo na ngai mpe libota na ngai.
[Elilingi na lokasa 19]
Ntango nakɔtaki na eteyelo ya basango na mbula 13
[Elilingi na lokasa 21]
Nazali kobima na biro ya basoda nsima ya kotika mosala na 1968
[Elilingi na lokasa 21]
Elongo na mwasi na ngai Encarnita, lelo