Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/11 nk. 27-29
  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?
  • Lamuká!—2011
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya malamu?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 1
  • Esengeli naluka baninga ya malamu?
    Lamuká!—2009
  • Kozala moninga malamu esɛngaka nini?
    Lamuká!—2014
  • Okoki kozala moninga ya Nzambe
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2011
g 10/11 nk. 27-29

Mituna oyo bilenge batunaka

Banani bazali baninga na ngai ya solo?

“Cori asalisi ngai nafungwama. Soki nazali ná ye, nayebanaka na bato ebele, nayekolaka makambo ya sika, mpe nasepelaka na makambo mingi. Boninga na ngai ná Cori esalisi ngai mingi!”​—Tara.a

Okanisaka ete moto akoki kozwa moninga ya ndenge wana te? Soki okanisaka bongo, kolɛmba nzoto te. Bato mingi oyo bakoki kokóma baninga na yo bazali mosika te. Lisolo oyo ekosalisa yo oyeba soki ezali banani.

SHAYNA, elenge moko ya mbula 21, alobaki ete afandi na kati ya bato ebele, kasi azali na moninga ya motema ata moko te. Ekoki kozala ete bilenge mingi oyo basololaka na bato mosusu na Internet bayokaka ndenge yango. Serena, elenge moko ya mbula 22, alobaki boye: “Okoki kozala na bato ebele oyo osololaka na bango mpe okoki komona ete oyebani mingi, nzokande mbala mosusu mingi kati na bato wana bazali baninga ya solo te.”b

Okolinga kozala na ebele ya bato oyo osololaka na bango to nde na mwa bato moke oyo bazali baninga ya solo? Atako kozala na bato ebele oyo osololaka na bango to kozala na mwa baninga ya solo ekoki kozala na malamu na yango, kasi moninga ya solo akoki kosalisa yo ntango ozali na mikakatano mpe akoki kolendisa yo okóma na bizaleli ya malamu. (1 Bakorinti 16:17, 18) Talelá makambo oyo mpo oyeba na kati ya bato oyo osololaka na bango, banani bakoki kobengama baninga ya solo.

MONINGA YA SOLO AZALI MOTO OYO BAKOKI KOTYELA MOTEMA

“Moninga na ngai azalaki koyebisa ngai basekele na ye, yango wana nakanisaki ete ngai mpe nakoki koyebisa ye oyo ya ngai. Mokolo moko nayebisaki ye ete nazali kosepela na elenge mobali moko. Nzokande, namikosaki! Abɛtɛlaki bato mosusu lisolo yango!”​—Beverly.

“Nayebisaka moninga na ngai Alan makambo nyonso, mpe nayebi ete akoloba yango na bato mosusu te.”​—Calvin.

Nani na kati ya bilenge yango azalaki na moninga ya solo? Na kati ya baninga na yo, nani oyo obangaka te koyebisa ye makambo na yo?c Biblia elobi ete “moninga ya solo alingaka ntango nyonso.”​—Masese 17:17.

MPO NA KOZWA BANINGA YA SOLO

  1. Taláká nde bizaleli, koluka kaka te bázala mingi. “Ezali malamu koyebana na bato ebele, kasi ata na kati ya bato ebele, tolukaka kaka mwa bato moke oyo bazali na makambo oyo tosepelaka na yango.”​—Karen.

  2. Zalá moninga ya solo. “Nalingaka ete baninga na ngai bázala bato ya sembo mpe oyo bakoki kotyelama motema, yango wana ngai moko mpe nazalaka na bizaleli yango.”​—Evelyn.

  3. Lakisáká ete osepelaka. “Soki nasepeli na moninga moko, nakomelaka ye mwa karte to napesaka ye mwa kado mpo na koyebisa ye yango.”​—Kellie.

Komá awa na nse nkombo ya baninga mibale oyo okanisi ete okoki kotyela bango motema.

  1. ․․․․․

  2. ․․․․․

MONINGA YA SOLO ANDIMAKA KOMIPIMELA

“Na boninga nyonso, ezalaka na ntango oyo moko azalaka makasi koleka mosusu. Moninga ya solo ayebaka ntango ozali na mokakatano mpe ayaka nokinoki kosalisa yo. Kasi, moninga yango alikyaka ete yo mpe okosalisa ye soki azali na mokakatano.”​—Kellie.

“Ntango mama na ngai akufaki, nazalaki na moninga moko ya sika. Tozalaki naino baninga ya motema te, kasi toyokanaki tókende na fɛti moko ya libala. Nzokande, mokolo yango nde basengelaki kokunda mama. Nakamwaki ete moninga yango alandaki ngai na esika akende na fɛti yango. Na ntango yango nayebaki ete azali mpenza moninga ya solo!”​—Lena.

Na kati ya baninga na yo, nani oyo omonaka ete andimaka komipimela? Moninga ya solo ‘akobaka koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.’​—1 Bakorinti 10:24.

Komá awa na nse nkombo ya baninga mibale oyo okanisi ete bandimaka komipimela.

  1. ․․․․․

  2. ․․․․․

MONINGA YA SOLO ASALISAKA YO OKÓMA NA BIZALELI YA MALAMU

“Bato mosusu balingaka nakangama na bango to nandima bango ata soki esɛngi nasala makambo oyo nayebi ete ezali mabe to ekotungisa lisosoli na ngai. Bato wana bazali baninga ya solo te.”​—Nadeine.

“Ndeko na ngai ya mwasi azali moninga na ngai ya motema. Alendisaka ngai nazala zolɔlɔ te mpe asalisaka ngai nafungwama. Alobaka na ngai polele ata soki ayebi ete nakosepela te.”​—Amy.

“Ntango nazalaki na mokakatano, baninga na ngai ya motema balukaki te kaka ete nabosana yango; bapesaki ngai toli oyo esengeli mpenza. Bato mosusu bazalaki kotala ngai kaka na miso to komeka kobosanisa ngai mokakatano yango. Bazalaki komona te ete likambo yango ezalaki kotungisa ngai.”​—Miki.

“Moninga na ngai ayebaka soki nazali makasi na makambo nini, mpe alendisaka ngai nakokisa mikano na ngai. Alobaka na ngai polelepolele soki esengeli, mpe ngai nalingaka bongo!”​—Elaine.

Baninga na yo basalisaka yo okende liboso, to esɛngaka nde ondima makambo mosusu ya mabe mpo na kosepelisa bango? Masese 13:20 elobi boye: “Ye oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi ye oyo azalaka na boyokani na bazoba akosuka mabe.”

OKOKI KOTUNA BABOTI NA YO

Ntango bozalaki na mbula na ngai, makambo nini bozalaki komona epai ya baninga na bino? Moninga moko asalá likambo oyo esepelisaki bino te? Soki esalemaki, likambo yango eteyaki bino nini? Banani bazalaki baninga ya malamu, mpe ndenge nini bozwaki bango?

Komá awa na nse nkombo ya baninga mibale oyo okanisi ete basalisaka yo okóma na bizaleli ya malamu.

  1. ․․․․․

  2. ․․․․․

Talá bankombo oyo okomi na bisika nyonso misato. Soki nkombo ya moto moko ezongi mbala misato, ye wana nde moninga ya solo! Nzokande, soki omonaki te nani oyo ebongi okoma nkombo na ye na bisika yango, kolɛmba nzoto te. Okoki kozwa baninga ya solo. Mbala mosusu ekosɛnga kaka mwa ntango mpo omona bango.d Na ntango yango, saláká makasi ozala moninga ya malamu. Elena, elenge moko ya mbula 20, alobaki boye: “Nasalaka nyonso nasalisa baninga na ngai. Soki balingi kosala eloko moko, napesaka bango mabɔkɔ. Soki balingi kosolola, nayokaka bango, soki bazali kolela, nabɔndisaka bango.”

MPO BONINGA ESIMBA

Boninga ezalaka malamu soki bato bayokanaka na makambo oyo ezali na ntina. Yango elingi koloba ete yo ná moninga na yo bosengeli kondima mateya, kotosa mibeko, mpe kolanda mitinda ndenge moko.

Likambo ya mibale ezali kozala na bizaleli ndenge moko; kasi yango ezali na ntina mpenza te.

Mbala mingi, kosepela na makambo ndenge moko ezalaka mpenza na ntina te. Kutu, okoki kozala moninga ya moto oyo asepelaka na masano mosusu mpe azali na makoki oyo ekeseni na oyo ya yo.

Likebisi: Kebá na kosala boninga na moto kaka mpo yo ná ye bosepelaka na makambo ndenge moko. Soki moninga na yo akipaka te makambo oyo omonaka ete ezali na ntina mingi, boninga na bino ekozala makasi te; kutu, ekoki kobendela yo mikakatano.

Ya solo, ekoki kozala ete oyebani na bato ebele, mpe yango ezali malamu na esika okangama kaka na mwa bato moko boye. (2 Bakorinti 6:13) Kasi, okosepela te kozala na mwa baninga ya solo oyo ‘babotami mpo na ntango ya mpasi’? (Masese 17:17) Jean, elenge moko ya mbula 20, alobaki boye: “Ezali malamu koyebana na bato ebele, kasi yango ezali kaka lokola kozala na armware oyo etondi na bilamba ya kitoko, kasi ekokaka yo te. Soki ezali bongo, okobanda kolata kaka mwa bilamba oyo ekokaka yo. Ezalaka mpe bongo mpo na baninga ya solo.”

Okokuta masolo mosusu na “Mituna oyo bilenge batunaka” na Internet, na esika oyo: www.pr418.com

a Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.

b Mpo na koyeba makambo mingi na likambo etali kosolola na bato mosusu na Internet, talá Lamuká! ya Yuli mpe Augusto 2011, na Lifalanse.

c Ntango mosusu kobomba likambo ya moto ezalaka malamu te. Na ndakisa, soki moninga asali likambo ya mabe, na ndakisa azali na makanisi ya komiboma, akómi na ezaleli moko oyo ekoki kosala ye mabe. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá Lamuká! ya Aprili 2009, nkasa 19-21, mpe ya Mai 2008, nkasa 26-29, na Lifalanse.

d Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Esengeli naluka baninga ya malamu??” na Lamuká! ya Yuli 2009.

OYO BILENGE MOSUSU BALOBI

Dominique

Dominique

“Soki ozali koluka makambo oyo eleki makasi epai ya basusu, okozwa baninga te. Soki mpe okiti na nse mingi, okopona biponela.”

Lianne

Lianne

“Bato mingi balukaka ete bato oyo basololaka na bango na Internet bákóma ebele, kasi bakipaka te boyokani nini bazali na yango ná bato yango. Ebongi koluka baninga oyo bazali na bizaleli ya malamu, kasi te kaka bázala mingi.”

Brieanne

Brieanne

“Soki moto azali kotɔnga baninga na ye mosusu epai na ngai, nayebaka ete akoki mpe kotɔnga ngai epai ya bango. Nalingaka bongo te. Moninga ya malamu atɔngaka te.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto