Oyebi nsango ya Biblia?
● Biblia ezali buku oyo ekabolamaka mingi koleka babuku mosusu nyonso. Bato ya bikólo nyonso bamoni ete nsango na yango epesaka makasi mpe elikya mpe toli na yango ezali na ntina mingi na makambo oyo tosalaka mokolo na mokolo. Nzokande, bato mingi bayebi makambo mingi te ya buku yango.
Mwa buku La Bible—Quel est son message? oyo ekomami na ndenge ya mindɔndɔ te mpe ezali na bililingi ya kitoko, ekoki kosalisa yo oyeba Biblia malamu. Eteni ya liboso mpe ya mibale elobeli ndenge oyo Nzambe atyaki bato na paradiso na ebandeli, mpe ndenge nini paradiso yango ebungaki. Elobeli mpe mokano ya Nzambe ya kozongisa paradiso na mabele na nzela ya Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema oyo apesi Yesu Kristo.
Biteni oyo elandi ebendi likebi na mosala ya kosakola, makamwisi, liwa mpe lisekwa ya Yesu. Mwa buku yango elobeli mpe bayekoli ya liboso ya Yesu, oyo bazalaki bato ya mpiko, mpe mikanda oyo bakomaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, oyo ezali lelo na kati ya Biblia.
Eteni ya 26 oyo esukisi mwa buku yango ezali na motó ya likambo ebongi mpenza oyo elobi ete “Paradiso ezongisami!” Lokasa 31 ezali na bililingi mingi ya kitoko mpe na motó ya likambo oyo elobi ete “Nsango ya Biblia na mokuse”. Na lokasa yango okomona makambo nsambo ya ntina oyo esalemaki mpo na kokokisa mokano ya Nzambe mpo na bato.
Okoki kosɛnga mwa buku yango ya nkasa 32 soki otondisi mwa eteni ya lokasa oyo ezali awa na nse mpe otindi yango na adrɛsi oyo ebongi na yo kati na baadrɛsi oyo ezali na lokasa 5 ya zulunalo oyo.
□ Nalingi kozwa mwa buku oyo bolakisi awa. Yebisá soki na monɔkɔ nini.
□ Bóya kotala ngai mpo na koyekola na ngai Biblia kozanga nafuta mbongo.