Makambo oyo ezali koleka na mokili
Na ankɛtɛ oyo basalaki mpo na biloko 5 296 oyo balobaki ete ebebisaka mabele te na Canada mpe na États-Unis, emonanaki ete mingi na yango (95%) “ezalaki te ndenge bakanisaki.”—TIME, ÉTATS-UNIS.
Ntango balekisaki mikumba ya mwasi moko na esika oyo batalaka soki eloko ya mabe ezali, bapolisi oyo basalaka na libándá ya mpɛpɔ monene ya engumba Bangkok “bamonaki ete likambo moko ezali.” Ntango bakonzi bafungolaki mikumba ya mwasi yango, bamonaki tigrɛ moko ya moke na bomoi, oyo elali mpo bapesaki yango nkisi.—FONDS MONDIAL POUR LA NATURE, THAÏLANDE.
Bikelamu ndenge na ndenge na Amazone
Zamba oyo ezali pembeni ya Ebale Amazone ezali moko ya bazamba minene na mokili oyo etondi na bikelamu ndenge na ndenge. Lapolo moko ya ebongiseli babengi Fonds mondial pour la nature (WWF) elobi ete na mbula zomi oyo euti koleka, bamonaki mitindo mosusu koleka 1 200 ya banzete, banyama, bandɛkɛ mpe mbisi. Yango elingi koloba ete nsima ya mikolo misato nyonso, bamonaka motindo moko ya sika. Sarah Hutchison, mokambi ya WWF na Brésil, alobi boye: “Motángo ya mitindo ya sika oyo bazali komona kuna ezali mpenza kokamwisa, kasi bazali mpe komona banyama-nkɛkɛ ebele oyo etángami te.”
Mitungisi na esika ya mosala
Moto moko kati na bato mitano ya ekólo Finlande azali komona ete kozanga kotya makanisi esika moko mpe kobosanabosana ezali kopekisa ye asala malamu. Lapolo ya ebongiseli ya Finlande oyo etalelaka kolɔngɔnɔ ya nzoto na esika ya mosala emonisi ete likambo yango etali mingimingi bato oyo bakokisi naino mbula 35 te, nzokande wana ezali ntango oyo bɔɔngɔ ya moto esengeli kosala malamu koleka. Ezali kosalema bongo mpo na bantina mingi; na ndakisa mpo makambo ya koyekola eleki mingi mpe baprograme ya ordinatɛrɛ ezali kobongwana ntango nyonso. Profesɛrɛ Kiti Müller alobi boye: “Bato mingi bazali komona ete bazali kotánga makambo mingi mpe bazali kokoka mpenza te koyeba oyo ezali na ntina mpo na mosala na bango.” Zulunalo moko (Helsinki Times) elobi boye: “Soki mitungisi eumeli mingi, bɔɔngɔ emesanaka na yango, mpe nzoto ekoki kotika koyebisa biso ete tolɛmbi, tii ntango tokobɛla makasi.”
Kokanisa masano ya mobulu ekómisaka moto mobulu?
Makanisi ya kosala mobulu etikalaka ntango boni na bɔɔngɔ ya moto nsima ya kobɛta lisano ya video ya mobulu? Etuluku moko ya bato oyo basalaka baankɛtɛ esɛngaki bana-kelasi ya basi mpe ya mibali bábɛta masano ya video, mosusu ya mobulu mosusu ya mobulu te, na boumeli ya miniti 20. Na nsima, basɛngaki ndambo ya bato ya etuluku mokomoko bákanisa lisano oyo babɛtaki. Lapolo yango elobi boye: “Na mokolo oyo elandaki, bato yango bazalaki kobunda na monguna moko ya solo mpenza te na komekama moko, mpe na nsuka na yango, moto oyo alongi akokaki kopesa moto oyo akwei etumbu ya kotyela ye makɛlɛlɛ makasi na ba-écouteur.” Emonanaki ete mibali oyo basɛngaki bango bákanisa lisano ya video ya mobulu oyo babɛtaki bakómaki mobulu makasi. Ndenge zulunalo moko (Social Psychological and Personality Science) emonisi yango, bakambi ya ankɛtɛ yango balobi boye: “Mbala mingi, bato oyo babɛtaka masano ya video ya mobulu basalaka yango na boumeli ya miniti koleka 20 mpe ekoki kozala ete bakanisaka lisano yango na nsima.” Bamonaki likambo moko ya mabe mpenza te epai ya basi, mpo mbala mingi bango basepelaka te na masano ya video ya mobulu.