Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 3/13 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2013
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Israël
  • Australie
  • Grèce
  • États-Unis
  • Madagascar
  • Ozali na boyebi nini likoló na Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tozali na ekateli ya kosalela Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
Lamuká!—2013
g 3/13 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Israël

Site moko ya Internet (Haaretz.com) elobi ete bana oyo “babotamá na mbeba oyo minganga bakokaki komona yango ntango bazalaki naino na libumu” bakoki lisusu te kofunda minganga na tribinale mpo na likambo yango. Nzokande, baboti na bango bakoki kofunda minganga yango na tribinale mpo bábakisela bango “mbongo oyo esɛngaka mpo na kobɔkɔla mwana ya ebɔsɔnɔ mpe kokokisa bamposa na ye bomoi na [ye] mobimba.”

Australie

Na Australie, kati na mabala 10, mabala 8 ezali ya yaká tófanda.

Grèce

Ministre ya Grèce oyo atalaka makambo ya bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto abimisaki motángo moko oyo emonisi ete na basanza mitano ya liboso ya mobu 2011, motángo ya bato oyo bamibomaki emataki mingi (40%), na kokesana na motángo ya basanza mitano ya liboso ya mobu 2010. Motángo yango emataki na ntango oyo nkita ya mokili mobimba ekweaki.

États-Unis

Ebongiseli moko (Conseil de défense des ressources naturelles) elobi ete na ekólo mobimba, bilei mingi (40%) ebebaka kaka boye. Na ndakisa, milona mingi (7%) babukaka yango te; bilei oyo etɛkamaka na barestora, mingi na yango (17%) etikalaka; mpe na bilei oyo mabota esombaka, mingi na yango (25%) ebwakamaka.

Madagascar

Bauti komona mongingima (caméléon) oyo eleki moke na mokili mobimba na Madagascar. Ezali na molai ya milimɛtrɛ 29; miselekete yango mosusu ya mike ya shokola ekoki kofanda na linzaka ya mosapi ya moto. Lokola bisika efandaka ezali kobebisama, bomoi ya mwa nyama yango ekómi na likama.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto