Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 2/14 lok. 3
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • États-Unis
  • Italie
  • Malaisie
  • Afrika
  • Australie
  • Maladi oyo ezwamaka na mikrobe​—Likama oyo ekoki kopɛngolama
    Lamuká!—2002
  • Esakweli 3. Maladi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
    Lamuká!—2014
  • Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 2/14 lok. 3

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

États-Unis

Zulunalo moko (New York Times) elobi boye: “Bato oyo bazali na kompanyi na bango moko babakisaka mbongo dolare 5 816 na mbula mpo na mosali moko oyo amɛlaka likaya; mbongo oyo babimisaka te mpo na mosali oyo amɛlaka likaya te. Bato ya mayele oyo basalaki bolukiluki na iniversite ya Ohio bamonisi ete mbongo yango ebimaka mpo basali yango bazwaka bopemi mpo na komɛla likaya, mpo babɛlaka mingi, mpe mpo bazangisaka mosala. Likambo mosusu ezali ete basalaka mosala malamu te mpo bakómaka baombo ya nicotine, pwazɔ oyo ezalaka na kati ya likaya.

Italie

Pápa François

“Lokola bapastɛrɛ mpe bandimi basalelaka te makambo oyo balobaka, yango ezali kobebisa lokumu ya mangomba.”​—Pápa François.

Malaisie

Bakonzi ya Leta ya Malaisie bakangi mpɛmbɛ ya nzoku oyo ebombanaki

Bakonzi ya Leta ya Malaisie bamonaki tɔni 24 ya mpɛmbɛ ya nzoku​—mpɛmbɛ ya banzoku koleka 1 000​—oyo babombaki na kɛsi mibale oyo basalá na nzete ya acajou. Bato oyo babatelaka biloko lokola zamba, mai mpe mopɛpɛ balobaki ete ezalaki mbala ya liboso bákanga mpɛmbɛ ya nzoku ebele ndenge wana. Biloko yango eutaki na Togo mpe ezalaki kokende Chine.

Afrika

Moto moko ya Afrika

Na 2012, lapolo ya Ebongiseli moko ya ONU oyo etalelaka bokolɔngɔnɔ ya nzoto (OMS) emonisaki ete ebele ya bato (63%) bakufaka na bamaladi oyo moto moko akoki kopesa moto mosusu, na ndakisa sida, pulupulu, maladi ya ntolo (tuberculose), ata mpe malaria to bamaladi ya bana.

Australie

Programɛ ya kobɛta masano ya mbongo na telefone moko

Bana mingi bakómi kosalela baprogramɛ ya batelefone mpe baaparɛyi mosusu oyo esalemi mpo na kobɛta masano ya mbongo. Baprogramɛ mosusu emekolaka mpenza masano oyo ebɛtamaka na bandako ya masano, kasi ezalaka mpasi te mpo na kolonga. Lapolo moko ya guvɛrnema elobi ete baprogramɛ yango ekoki kotinda bana bámona ete masano yango ezali mabe te “mpe ekoki kotinda bango bámipesa na kobɛta masano yango na mikolo ezali koya.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto