Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/14 nk. 14-15
  • Babengani Ba-Morisque na Espagne

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babengani Ba-Morisque na Espagne
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOKÓMISA BATO BANDIMI NA MAKASI
  • “BAZALAKI BAKRISTO KAKA YA NKOMBO MPE BANA-MBOKA YA SEMBO TE”
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2014
  • Ndenge bato ya Espagne bayebaki Liloba ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Etumba mpo ete Biblia na lokóta Espagnol ebatelama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mibeko oyo ekabolaki bakɔntina
    Lamuká!—2015
Makambo mosusu
Lamuká!—2014
g 9/14 nk. 14-15
Babengani Ba-Morisque na Espagne

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Babengani Ba-Morisque na Espagne

Balobaka ete soki makambo wana ya mawa esalemaki na Espagne, eglize nde ezalaki nsima ya makambo yango. Ebongi mpenza kotánga lisolo yango.

MOKONZI ya Espagne alingaki ete bato nyonso bázala bakristo mpe bango nyonso bátosa mibeko ya mboka. Lokola bazalaki kotalela Ba-Morisque lokola bapakano, yango wana bamonaki ete soki batikali kaka na Espagne ekozala mabe monene na miso ya Nzambe. Nsima ya bambula mingi, bazwelaki bango ekateli. Ezalaki ekateli nini? Basengelaki kobengana bango!a

KOKÓMISA BATO BANDIMI NA MAKASI

Na boumeli ya bambula ebele, Ba-Maure na Espagne, mwa etuluku moke ya Bamizilma oyo babengaki bango Ba-Mudéjar, bazalaki kofanda na mwa kimya na bisika oyo ezalaki koyangelama na Lingomba ya Katolike. Mpo na mwa ntango, mibeko ya Leta etikelaki bango bonsomi ya kotosa mibeko mpe bonkɔkɔ na bango mpe kozala na lingomba na bango moko.

Kasi na 1492, mokonzi Ferdinand II ná mwasi na ye Isabella, oyo bazalaki bandimi ya Lingomba ya Katolike, babɔtɔlaki engumba Granada, eteni ya nsuka ya sudi-wɛsti ya Mpoto oyo ezalaki naino na mabɔkɔ ya Bamizilma. Bapesaki Ba-Maure oyo bazalaki kuna bonsomi ndenge moko na oyo bapesaki Ba-Mudéjar. Kasi, eumelaki te bakonzi ya Katolike bakómaki konyokola bango mingi mpe koluka kokómisa bango bandimi na bango na makasi. Ba-Maure batɛmɛlaki likambo yango mpo eyokanaki te na makambo oyo bayokanaki liboso, mpe na 1499 batombokaki. Basoda ya guvɛrnema basilisaki botomboki yango, kasi na nsima, bayebisaki Bamizilma ya bisika ndenge na ndenge bápona kokóma bandimi ya Katolike to kolongwa na Espagne. Bato ya Espagne bakómaki kobenga baoyo bandimaki kokóma bandimi ya Katolike mpe kotikala na Espagne Ba-Morisque.

“BAZALAKI BAKRISTO KAKA YA NKOMBO MPE BANA-MBOKA YA SEMBO TE”

Na 1526, bapekisaki losambo ya Bamizilma na Espagne mobimba, ata bongo, Ba-Morisque mingi bakobaki kosambela na kobombana. Mingi na bango babatelaki bonkɔkɔ na bango.

Atako bazalaki bandimi ya Katolike kaka na maloba, bazalaki kosala bango eloko te. Kutu, bazalaki kosala misala makasi ya mabɔkɔ mpe bazalaki kofuta mpako. Kasi, lokola baboyaki komikɔtisa mpenza na Lingomba ya Katolike, bayinaki bango, mpe bazalaki kosalela bango makambo na bosembo te ezala guvɛrnema to bato mosusu ya Espagne. Mbala mosusu likambo oyo epelisaki mɔtɔ ezali mpo eglize ekómaki kokanisela bango mabe mpo emonaki ete babongwanaki na ndenge ya solo te.

Eumelaki te, bonsomi oyo bapesaki bango elongwaki mpe bakómaki kondimisa bango na makasi. Na 1567, Mokonzi Philip II abimisaki polele mobeko oyo epekisaki monɔkɔ, bilamba, bonkɔkɔ mpe mimeseno ya Ba-Morisque. Ekateli yango ebimisaki botomboki mosusu mpe makila esopanaki mingi.

Balobaka ete Ba-Morisque soki 300 000 bakimaki Espagne mpo minyoko elekaki makasi

Bato ya istware balobi ete bakonzi ya Espagne bandimaki mpenza ete “Ba-Morisque bazalaki bakristo kaka ya nkombo mpe bana-mboka ya sembo te.” Yango wana bafundaki bango ete bazalaki koyokana na banguna ya Espagne, na ndakisa bato oyo bazalaki na nɔrdi ya Afrika, Baprotesta ya France mpe Ba-Turque mpo na kobundisa Espagne. Ndenge oyo bazalaki kokanisela Ba-Morisque mabe mpe kobanga ete bátɛka mboka esalaki ete Philip III azwa ekateli ya kobengana bango na 1609.b Na bambula oyo elandaki, bazalaki konyokola bato nyonso oyo bazalaki komonana lokola Ba-Morisque. Yango esalaki ete kaka Lingomba ya Katolike nde etikala na Espagne mobimba.

a Na monɔkɔ ya Espagnole Morisque elimboli “Ba-Maure ya mike.” Bato ya istware basalelaka ebengeli yango mpo na kolobela bato oyo bazalaki liboso Bamizilma mpe bakómaki bandimi ya Lingomba ya Katolike mpe bafandaki na sudi-wɛsti ya Mpoto nsima ya kokwea ya bokonzi ya nsuka ya Bamizilma na 1492.

b Bato ya istware bakanisi ete ata moko ya bakonzi ya Espagne azwaki matomba mingi mpenza na mabele oyo babɔtɔlaki Ba-Morisque.

MWA MAKAMBO ETALI BA-MORISQUE

  • Na ebandeli ya siɛklɛ ya 8 ya ntango na biso, bato ya Afrika ya nɔrdi mpe Ba-Arabe babɔtɔlaki eteni monene ya sudi-wɛsti ya Mpoto, bamboka oyo babengaka lelo Espagne mpe Portugal.

  • Basoda ya Espagne babandaki mokemoke kozwa bamboka oyo ebɔtɔlamaki, mpe basilisaki kozwa yango na 1492 ntango bazwaki mabele ya nsuka ya Ba-Morisque zingazinga ya engumba Granada.

  • Na 1492, Mokonzi Ferdinand ná mwasi na ye Isabella babenganaki Bayuda nyonso oyo baboyaki kokóma bandimi ya Lingomba ya Katolike na Espagne. Na bambula ya 1500, banyokolaki Bamizilma oyo bandimaki kokóma bakatolike mpe mabota na bango mpe balongolaki bango na bisika na bango. Kobanda 1609 tii 1614 babenganaki Ba-Morisque, “bakristo ya sika” oyo bankɔkɔ na bango bazalaki Bamizilma.

  • Balobaka ete Ba-Morisque soki 300 000 bakimaki Espagne mpo minyoko elekaki makasi. Bato soki 10 000 bakufaki mpo baboyaki kolongwa na Espagne.

Kaka Lingomba ya Katolike nde etikalaki na ekólo mobimba!

Juan de Ribera, episkɔpɔ-mokonzi ya Valencia, apelisaki mɔtɔ mpo bábengana Ba-Morisque

Juan de Ribera, episkɔpɔ-mokonzi ya Valencia, oyo apesaki mabɔkɔ mpenza na likambo ya kobengana Ba-Morisque

Na ntembe te, mpasi ekɔtaki na Espagne mpo misala oyo Ba-Morisque bazalaki kosala ezangaki bato ya kosala yango. Ata bongo, ekólo yango esepelaki mingi nsima ya kobengana bato yango. Babuku ya istware elobi ete mpo na bato mingi ya Espagne, kozala ya Ba-Morisque, oyo bazalaki na konfianse te mpo na lingomba na bango, ezalaki “ntango nyonso kosilikisa bango, mpe kopesa nsɔni na mboka.” Kasi nkanda yango esilaki. Bakonzi, bato ya mboka yango nyonso mpe eglize basepelaki ndenge Lingomba ya Katolike etikalaki na mboka yango mobimba.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto