Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/14 lok. 7
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2014
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • États-unis
  • Inde
  • Suisse
  • Afrika ya ɛsti
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2012
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
    Lamuká!—2013
  • Mabele ekozala kaka nsima ya 2012?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2012
Lamuká!—2014
g 10/14 lok. 7

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

États-unis

Mwa aparɛyi oyo bakangisaka na motuka

Bapolisi mosusu bazali kosalela baaparɛyi mpo makama ezala mingi te ntango bazali kolanda mituka oyo ebuki mibeko ya nzela. Moko na yango ezali oyo ezalaka na mopɛpɛ mpe bakangisaka yango liboso ya mituka na bango. Mwa aparɛyi yango oyo babengi (GPS-trackable) ekangamaka na motuka oyo bazali kolanda. Na ndenge yango, bakoki kolanda motuka yango na vitɛsi oyo ebongi.

Inde

Mwasi moko ya ekólo Inde

Baankɛtɛ emonisi ete babomaka mwasi moko nsima ya ngonga nyonso mpo na matata oyo ebimaka mpo na mbongo ya libala. Atako mibeko ya Leta epekisi likambo ya kozwa to kopesa mbongo ya libala ndenge wana, na 2012 babomaki basi koleka 8 200 mpo mibali to mabota na bango bamonaki ete mbongo ya libala oyo bapesaki bango ezalaki moke.

Suisse

Ndɛkɛ babengi martinet

Mwa aparɛyi ya moke mpenza oyo bakangisaki bandɛkɛ misato oyo babengi martinet na zumbu na bango emonisi ete bandɛkɛ yango epumbwaka kozanga kopema mikolo koleka 200 ntango ezali kosala mobembo na Afrika. Liboso, bazalaki kokanisa ete kaka banyama ya mai nde esalaka bongo.

Afrika ya ɛsti

Etanda oyo emonisi motángo ya bamasuwa oyo bakangaki mpe mosolo oyo bafutaki mpo bátika yango

Bato ya mobulu bakangaki bamasuwa 179 na Afrika ya Ɛsti kobanda na sanza ya 04/2005 tii na sanza ya 12/2012. Ankɛtɛ moko oyo Banque mondiale esalaki emonisi ete bato yango basɛngaki badolare koleka milio 413 mpo bátika bamasuwa yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto