Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 8/15 lok. 16
  • Baangrenaje ya mwa nyama babengi cigale bossue

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Baangrenaje ya mwa nyama babengi cigale bossue
  • Lamuká!—2015
  • Masolo mosusu
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2015
  • Yebá kosolola malamu na bato!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Lokolo ya mpunda
    Lamuká!—2014
  • Montre oyo olati na lobɔkɔ
    Lamuká!—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 8/15 lok. 16
Mwa nyama babengi cigale bossue

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Baangrenaje ya mwa nyama babengi cigale bossue

Ndenge baangrenaje oyo ekɔtanákɔtaná na makolo ya mwa nyama yango ezalaka

BANDA kala, bato bakanisaka ete kaka bato nde babimisá baangrenaje. Kasi emonani ete ezali lokuta! Bautaki komona ete makolo ya mwa nyama babengi cigale bossue oyo ezalaka na ba-jardin na Mpoto, ezalaka mpe na baangrenaje oyo ekɔtanákɔtaná ntango ezali naino mwana.a

Mwa nyama yango ya mwana ekoki kopumbwa na ntaka ya mɛtrɛ pene na 4 na segɔnde moko, nguya oyo ebimisaka mpo na kopumbwa ndenge wana ezali mbala 200 koleka nguya ya gravitation! Ekoki kolimwa kaka na kobɛta ya liso. Mpo epumbwa bongo, esɛngaka ete makolo na yango ebimisa nguya ndenge moko nzela moko. Sekele na yango ezali wapi?

Tókanisa naino: Bato ya siansi bamonaki ete makolo mibale ya mwa nyama yango ezali na baangrenaje mibale oyo ekɔtanákɔtaná. Ntango mwa nyama yango epumbwaka, baangrenaje yango esalaka ete makolo na yango nyonso mibale esala muvema nzela moko. Soki bongo te, elingaki kopumbwa malamu te!

Ntango bikelamu ya minene epumbwaka, bɔɔngo nde esalisaka mpo makolo na yango esala muvema nzela moko. Kasi mpo na mwa nyama yango ya mwana, bɔɔngo na yango ekoki te kosalisa yango epumbwa ndenge wana, yango wana esalelaka baangrenaje na yango oyo ekɔtanákɔtaná. Gregory Sutton, mokomi moko ya mayele, alobi boye: “Tozalaki kokanisa ete baangrenaje ezalaka kaka na biloko oyo bato basalá mpo tosalaki milende te ya koluka yango [esika mosusu].”

Okanisi nini? Baangrenaje ya mwa nyama babengi cigale bossue ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?

a Baangrenaje yango ekweaka ntango mwa nyama yango ezali kokóma mokóló.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto