Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/15 lok. 16
  • Makambo etali libota

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali libota
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Afrika
  • Canada
  • Pays-Bas
  • Baboti​—Bóbɔkɔla bana na bino na bolingo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 2
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Baboti, bópesa bana na bino ndakisa malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Lolenge ya kozala na libota oyo ezali makasi na elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 10/15 lok. 16
Mama oyo azali kosalela ordinatɛrɛ ntango mwana azali na mposa akipe ye

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali libota

Mabota ezali kokutana na mikakatano mingi, kasi batoli ya Biblia oyo esilaka ngala te ekoki kosalisa mabota elonga mpe ekende liboso.

Afrika

Lapolo moko ya OMS emonisi ete bamama basengeli kobanda komɛlisa bana mabɛlɛ ngonga moko nsima ya kobotama mpe basengeli kokoba kosala bongo sanza motoba mobimba. Atako esɛngi bongo, moto moko ya UNICEF oyo apesaka toli ya makambo ya kolya na ɛsti mpe sudi ya Afrika alobaki ete bapiblisite ya lokuta ezali kokoba komonisa ete “miliki ya babebe ekokani na mabɛlɛ ya mama.”

OYO BIBLIA ELOBI: “Moto nyonso oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ atyaka likebi na matambe na ye.”​—Masese 14:15.

Canada

Bato ya mayele na Montréal balobaki ete bana oyo baboti na bango bakweiselaka bango mitindo; oyo batyelaka bana mibeko makasimakasi kasi bamoniselaka bango bolingo mingi te, mingi ya bana yango (30%) bazalaka na likama ya kokóma monene mingi koleka bana oyo baboti na bango balekisaka ndelo te ntango bazali kopesa bango disiplini mpe komonisela bango bolingo.

OYEBAKI YANGO? Biblia elobelá banda kala lolenge malamu ya kobɔkɔla bana.​—Bakolose 3:21.

Pays-Bas

Ankɛtɛ oyo esalemaki na mabota ya bato ya Pays-Bas oyo baboti nyonso mibale basalaka emonisaki ete baboti oyo batikaka te ete mosala epekisa bango kokokisa mokumba na bango ya moboti, bayokanaka malamu ná bana na bango koleka baboti oyo batikaka mosala epekisa bango kokokisa mikumba ya libota. Na ndakisa, nsima ya kozonga na ndako ntango mosala esili, soki baboti bazali kokoba kosolola makambo ya mosala na telefone, yango ekoki kosala ete bátyela te bana na bango likebi oyo bazali na yango mposa.

KOBOSANA LIKAMBO OYO TE: “Eloko nyonso ezali na ntango na yango.”​—Mosakoli 3:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto