Batatoli ya Yehova
Ndimbola: Lisangá ya bakristo ya mokili mobimba oyo bapesaka litatoli na molende mpenza mpo na Yehova Nzambe mpe mikano na ye mpo na bato. Mateya na bango eutaka kaka na Biblia.
Wapi mateya ya Batatoli ya Yehova oyo ekesenisaka bango na mangomba mosusu?
(1) Biblia: Batatoli ya Yehova bandimaka ete Biblia mobimba ezali Liloba ya Nzambe, mpe mateya na bango eutaka na makanisi ya bato te, basalaka makasi ete mateya na bango nyonso euta na Biblia.
(2) Nzambe: Basambelaka Yehova mpo azali Nzambe ya solo kaka moko, balobelaka ye polele epai ya bato mpe bayebisaka bango mikano na ye ya bolingo. Mbala mingi, soki moto atángi nkombo Yehova, bato balobaka ete azali “Motatoli ya Yehova.”
(3) Yesu Kristo: Bandimaka te ete Yesu Kristo azali na kati ya Bosato, kasi bandimaka ndenge Biblia elobi ete azali mwana ya Nzambe, ekelamu ya liboso na bikelamu nyonso ya Nzambe; bandimaka mpe ete azalaki na bomoi liboso abotama moto mpe ete na lisalisi ya elimo santu, Nzambe alongolaki bomoi na ye na likoló mpe akɔtisaki yango na libumu ya ngɔndɔ Maria; bandimaka mpe ete bomoi ya kokoka oyo apesaki mbeka efungoli nzela ete bato oyo bakondima yango bázwa lobiko, elingi koloba bomoi ya seko; bandimaka lisusu ete Kristo azali lelo oyo mokonzi oyo azali koyangela, mpe kobanda 1914, Nzambe apesaki ye bokonzi ya koyangela mabele mobimba.
(4) Bokonzi ya Nzambe: Bandimaka ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya kaka moko mpo na bato; bandimaka mpe ete Bokonzi yango ezali guvɛrnema ya solosolo; bandimaka ete etikali moke eboma mokili oyo ya mabe ná baguvɛrnema nyonso ya bato, mpe ekosala mokili ya sika epai boyengebene ekozala.
(5) Bomoi na likoló: Bandimaka ete bakristo 144 000 oyo batyami mafuta na elimo nde bakozala bakonzi elongo na Kristo na likoló. Bandimaka te ete moto nyonso ya “malamu” akokende na likoló.
(6) Mabele: Bandimaka ete mokano oyo Nzambe azalaki na yango uta na ebandeli mpo na mabele ekokokisama; bandimaka ete mabele ekotonda mpenza na basambeli ya Yehova mpe ete bato yango bakozala na bomoi ya kokoka libela na libela; bandimaka mpe ete ata bato oyo bakufá bakosekwa mpo bango mpe bázwa bolamu yango.
(7) Liwa: Bandimaka ete bakufi bayebi eloko te; bayokaka mpasi to esengo te na mokili moko boye ya bilimo, bandimaka ete bakufi bazali na kati ya makanisi ya Nzambe kasi na esika mosusu te, bakozonga lisusu na bomoi kaka na nzela ya lisekwa.
(8) Mikolo ya nsuka: Bandimaka ete banda 1914 tozali kobika na mikolo ya nsuka ya mokili oyo mabe; bandimaka ete bato oyo balingaka bosembo bakobika mpo na kokɔta na mokili ya pɛto.
(9) Kokabwana na mokili: Basalaka makasi básangana na mokili te, ndenge Yesu alobaki na bayekoli na ye. Bamonisaka ete balingaka mpenza bazalani na bango, kasi bakɔtaka na makambo ya politiki to na bitumba ya ekólo ata moko te. Bakokisaka bamposa ya mosuni ya mabota na bango, kasi baboyaka koluka biloko ya mokili na lokoso, koluka lokumu mpe komipesa mobimba na bisengo ya mokili oyo.
(10) Kosalela toli ya Biblia: Bandimaka ete ezali na ntina kosalela toli ya Liloba ya Nzambe, mokolo na mokolo—na ndako, na eteyelo, na mosala mpe na lisangá. Ata soki moto azalaki na etamboli ya ndenge nini kala, akoki kokóma Motatoli ya Yehova soki atiki makambo oyo Liloba ya Nzambe eboyi mpe asaleli toli na yango. Kasi soki na nsima moto akómi komipesa na ekobo, pite, kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi, komɛla drɔgɛ, kolangwa, kokosa to koyiba, akobimisama na lisangá.
(Makambo oyo touti kotánga ezali kaka mwa ndambo ya mateya minene ya Batatoli ya Yehova, kasi ezali mpe na mateya mosusu oyo ekesenisaka bango na mangomba mosusu. Mpo na koyeba bavɛrsɛ oyo esimbi mateya oyo touti kotánga talá na Index ya buku oyo.)
Lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali lingomba ya Amerika?
Batatoli ya Yehova balobelaka Bokonzi ya Nzambe, kasi bakɔtelaka ebongiseli ya politiki moko te, ezala ebongiseli ya nkita to ebongiseli oyo etalelaka makambo ya bato ya ekólo moko na mokili mobimba.
Ezali solo ete lingomba ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso ebandaki na États-Unis. Lokola biro na bango ya monene ezali na mboka yango, esalisaka mpo na konyata mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe kotinda yango na mokili mobimba. Kasi Batatoli ya Yehova bakɔtelaka ekólo moko te; okokuta bango na mokili mobimba, mpe bazali na babiro na mikili mingi mpo na kotambwisa mosala na bango na bamboka wana.
Simbá likambo oyo: Yesu azalaki Moyuda oyo abotamaki na Palestine, kasi losambo ya bokristo ezali lingomba ya Palestine te, boye te? Esika oyo Yesu abotamaki ezali likambo ya ntina mingi te. Makambo oyo Yesu azalaki koteya eutaki epai ya Tata na ye, Yehova Nzambe, oyo aponaka bilongi te.—Yoa. 14:10; Mis. 10:34, 35.
Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo ya kotambwisa mosala na bango wapi?
Eutaka na makabo ya bolingo, ndenge bakristo ya liboso bazalaki kosala. (2 Ko. 8:12; 9:7) Na makita na bango bakɔngɔlaka mabonza te; basɛngasɛngaka bato mbongo te. Makabo nyonso oyo bato oyo basepeli na solo bápesaka, basalelaka yango mpo na kotambwisa mosala ya koteya bato Biblia na mokili mobimba.
Bafutaka Batatoli ya Yehova te mpo básakolaka ndako na ndako to mpo bápesaka bato mikanda na babalabala. Bolingo na bango epai ya Nzambe mpe epai ya bato mosusu nde etindaka bango báyebisa bato bolamu oyo Nzambe akosalela bato.
Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania, ebongiseli ya lingomba oyo endimami na mibeko ya Leta, oyo Batatoli ya Yehova basalelaka, endimamaki na 1884 na kolanda mobeko oyo etalelaka bibongiseli oyo esalaka mombongo te na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Na yango, na kolanda mobeko ya ebongiseli wana, Watchtower ekoki te kozala ebongiseli oyo esalaka mombongo, mpe bato bakoki te kodondwa nsima na yango. Mobeko ya Watchtower Society elobi ete: “[La Société] elingaka te ete basangani na yango to bato oyo bakambaka yango básalaka mombongo to bábimisa benefisi na nkombo na yango.” Mobeko yango etaleli mpe bibongiseli mosusu oyo endimami na Leta oyo Batatoli ya Yehova basalelaka na mokili mobimba.
Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba moko boye?
Bato mosusu balobaka ete mwa lingomba ezali etuluku ya bato oyo bamikaboli na lingomba ya monene. Bato mosusu mpe balobaka ete ezali etuluku ya bato oyo balandaka mokambi moko boye mpe oyo bandimi na yango basali etuluku oyo emikaboli na bato mosusu mpe balukaka matomba na bango moko. Bato mingi basalelaka maloba yango mpo na kotyola. Lisangá ya Batatoli ya Yehova eutá na lingomba moko boye te, kasi na kati na bango okokuta bato ya lolenge nyonso, mpe bato yango bautá na mangomba ndenge na ndenge. Bateyaka kaka oyo ezali na kati ya Biblia mpe batosaka yango. Bandimaka ete Yesu Kristo nde motambwisi na bango, kasi moto te. Bakimaka bato mosusu te mpo na kofanda kaka bango moko, kasi bafandaka mpe basalaka elongo na bato mosusu.
Lingomba ya Batatoli ya Yehova ebandá ntango nini?
Soki tolandi oyo Biblia elobi, Abele moto ya sembo nde azali Motatoli ya Yehova ya liboso. Baebre 11:4–12:1 elobi ete: “Na kondima Abele apesaki Nzambe mbeka ya motuya monene koleka oyo ya Kaina . . . Na kondima Noa, nsima ya kozwa likebisi ya Nzambe mpo na makambo oyo emonanaki naino te, abangaki Nzambe . . . Na kondima Abrahama, ntango abengamaki, atosaki na ndenge akendaki na esika oyo asengelaki kozwa yango libula . . . Na kondima Moize, ntango akolaki, aboyaki kobengama mwana ya mwana mwasi ya Farao, aponaki konyokwama elongo na bato ya Nzambe na esika ya kozwa esengo ya ntango mokuse oyo euti na lisumu . . . Yango wana, lokola tozali na lipata monene boye ya batatoli oyo ezingi biso, tólongola mpe kilo nyonso ná lisumu oyo ezali kokanga biso kozanga mpasi, mpe tóyika mpiko ntango tozali kopota mbangu na momekano oyo etyami liboso na biso.”
Mpo na Yesu Kristo Biblia elobi boye: “Talá makambo oyo Amen, motatoli ya sembo mpe ya solo, ebandeli ya bozalisi ya Nzambe, alobi.” Yesu azalaki motatoli ya nani? Ye moko alobaki ete amonisaki bato polele nkombo ya Tata na ye. Azalaki motatoli monene ya Yehova.—Em. 3:14; Yoa. 17:6.
Simbá ete, Bayuda mosusu bamitunaki soki Yesu Kristo azalaki koteya “liteya moko ya sika” to te. (Mrk. 1:27) Nsima ya bambula, Bagrɛki mosusu bakanisaki ete ntoma Paulo ayei koteya “liteya ya sika.” (Mis. 17:19, 20) Ezalaki mpenza liteya ya sika na matoi ya bato oyo bazalaki koyoka yango, kasi likambo ya ntina ezali ete yango nde solo oyo eyokanaki mpenza na Liloba ya Nzambe.
Lisolo ya Batatoli ya Yehova na ntango na biso ebandaki na etuluku moko ya bayekoli ya Biblia na Allegheny, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis na ebandeli ya bambula ya 1870. Liboso bayebanaki na nkombo Bayekoli ya Biblia, kasi na 1931 bazwaki nkombo oyo ezali na Biblia: Batatoli ya Yehova. (Yis. 43:10-12) Mateya mpe misala na bango ezali makambo ya sika te, kasi ezali nde kozongisama ya bokristo ya siɛklɛ ya liboso.
Batatoli ya Yehova bandimaka ete kaka bango moko nde lingomba ya solo?
Biblia endimaka te makanisi ya bato ya ntango na biso oyo balobaka ete ezali na lolenge ebele ya kosambela Nzambe na ndenge oyo endimami. Baefese 4:5 elobi ete ezali na “Nkolo kaka moko, kondima kaka moko.” Yesu alobaki ete: “Porte oyo ya moke mpe nzela ya nkaka yango nde ememaka na bomoi, mpe bato oyo bazali komona yango bazali moke. . . . Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na bokonzi ya likoló, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.”—Mat. 7:13, 14, 21; talá mpe 1 Bakorinti 1:10.
Mbala na mbala Biblia ebengaka mateya nyonso ya bokristo ete “solo,” mpe ebengaka losambo ya bokristo ete “nzela ya solo.” (1 Tim. 3:15; 2 Yoa. 1; 2 Pe. 2:2) Lokola mateya nyonso ya Batatoli ya Yehova ná mibeko na bango eutaka na Biblia mpe lokola batambwisaka lisangá na bango ndenge Biblia elobi, lokola bandimaka ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe, yango endimisi bango ete bazali mpenza na kati ya solo. Bazali koloba bongo mpo na lolendo te, kasi bazali nde kolakisa ete bandimi na motema moko ete kaka Biblia nde ekoki komonisa ete lingomba oyo boye ezali lingomba ya solo to te. Babombaka makambo oyo bayebi mpo na bango moko te kasi bayebisaka yango bato mosusu.
Mangomba mosusu mpe elandaka Biblia te?
Mangomba mingi esalelaka Biblia mwa ndambo. Kasi bateyaka mpenza mpe basalelaka makambo oyo ezali na kati ya Biblia? Na ndakisa: (1) Na Babiblia na bango balongolá nkombo ya Nzambe ya solo na bisika mingi. (2) Liteya ya Bosato, ndenge oyo batalelaka Nzambe, eutá na mateya ya bapakano mpe ndimbola oyo bazali kopesa yango lelo eyebanaki basiɛklɛ mingi nsima ya kokomama ya Biblia. (3) Liteya na bango oyo elobaka ete moto azali na molimo oyo ekufaka te etindaka bango bákanisa ete moto akobaka kozala na bomoi nsima ya liwa; liteya yango euti na Biblia te kasi na Babilone ya kala. (4) Yesu azalaki kosakola Bokonzi ya Nzambe, mpe atindaki bayekoli na ye báyebisa bato mosusu Bokonzi yango; nzokande lelo mangomba elobelaka Bokonzi yango mingi te mpe bandimi ya mangomba yango basalaka mosala wana ya kosakola ‘nsango malamu ya bokonzi’ te. (Mat. 24:14) (5) Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo bakoyebana polele na bolingo oyo etindaka bango bámipesa mpo na bolamu ya basusu. Na ntango ya bitumba, mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba emonisaka mpenza bolingo wana? (6) Biblia elobi ete bayekoli ya Kristo basanganaka na mokili te, mpe ekebisi ete moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili, azali komikómisa monguna ya Nzambe; nzokande mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba mpe bandimi na yango bazali mpenza komikɔtisa na makambo ya politiki. (Yak. 4:4) Na kotalela makambo oyo nyonso, tokoki koloba ya solo ete mangomba elandaka mpenza Biblia?
Nini esalisaka Batatoli ya Yehova bálimbola Biblia?
Likambo ya ntina ezali ete Batatoli bandimaka mpenza ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe mpe ezali mpo na koteya biso. (2 Tim. 3:16, 17; Rom. 15:4; 1 Ko. 10:11) Na yango, balandaka mateya ya filozofi te mpo na kotika mateya ya solo oyo emonisami polele na Biblia to mpo na kolongisa bizaleli ya bato oyo baboyi kolanda mitinda ya Biblia.
Na esika bápesa ndimbola na bango moko na maloba ya elilingi oyo Biblia esalelaka, batikaka Biblia yango moko epesa ndimbola. (1 Ko. 2:13) Mbala mingi, bavɛrsɛ mosusu esalisaka mpo na koyeba ndimbola ya maloba ya elilingi. (Na ndakisa, talá Emoniseli 21:1; na nsima tángá Yisaya 57:20 mpo na koyeba ndimbola ya liloba “mbu.” Mpo na koyeba “Mwana-Mpate” oyo balobeli na Emoniseli 14:1, talá Yoane 1:29 mpe 1 Petro 1:19.)
Mpo na koyeba kokokisama ya bisakweli, basalelaka toli oyo Yesu apesaki ete bákɛngɛlaka mpo na komona makambo oyo eyokani na makambo oyo esakolamaki. (Luka 21:29-31; talá 2 Petro 1:16-19.) Na bosembo nyonso bamonisaka bato ete makambo yango ezali kokokisa bisakweli ya Biblia.
Yesu alobaki ete awa na mabele akozala na “moombo ya sembo mpe ya mayele” (bayekoli na ye oyo batyami mafuta na elimo), oyo akosalela mpo na kopesa bato ya ndako ya kondima bilei ya elimo. (Mat. 24:45-47) Batatoli ya Yehova bandimaka ebongiseli yango. Ndenge ezalaki mpo na bakristo ya siɛklɛ ya liboso, Batatoli batalelaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya “moombo” yango mpo na kopesa bango biyano na mituna ya makasi. Bandeko ya lisangani yango basalelaka bwanya ya bato te, kasi basalelaka boyebi ya Liloba ya Nzambe mpe batalelaka makambo oyo Nzambe asalelaka basaleli na ye, mpe babondelaka na molende mpo na kosɛnga lisalisi ya elimo santu ya Nzambe.—Mis. 15:1-29; 16:4, 5.
Mpo na nini, nsima ya bambula, Batatoli ya Yehova babongolaka ndimbola ya mateya na bango mosusu?
Biblia emonisi ete Yehova asalisaka basaleli na ye básosola mokano na ye mokemoke. (Mas. 4:18; Yoa. 16:12) Yango wana, basakoli oyo batambwisamaki na elimo ya Nzambe mpo na kokoma Biblia, basosolaki te ndimbola ya likambo mokomoko oyo bazalaki kokoma. (Dan. 12:8, 9; 1 Pe. 1:10-12) Bantoma ya Yesu Kristo bayebaki ete ezali na makambo mingi oyo bakangaki ntina na yango te na eleko na bango. (Mis. 1:6, 7; 1 Ko. 13:9-12) Biblia emonisi ete boyebi ya solo ekokóma mingi mpenza na “ntango ya nsuka.” (Dan. 12:4) Mbala mingi, ntango boyebi ezali kokóma mingi, esɛngaka moto abongola makanisi na ye. Na komikitisa mpenza, Batatoli ya Yehova bandimaka kosala mbongwana wana.
Mpo na nini Batatoli ya Yehova basakolaka ndako na ndako?
Yesu asakolaki ete mosala yango ekosalema na mikolo na biso; alobaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” Ayebisaki lisusu bayekoli na ye ete: “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.”—Mat. 24:14; 28:19.
Ntango Yesu atindaki bayekoli na ye, ayebisaki bango bákende na bandako ya bato. (Mat. 10:7, 11-13) Ntoma Paulo alobaki mpo na mosala na ye ete: “Namipekisaki te koyebisa bino makambo nyonso oyo ezalaki na litomba to koteya bino na bisika ya bato nyonso mpe na ndako na ndako.”—Mis. 20:20, 21; talá mpe Misala 5:42.
Nsango oyo Batatoli basakolaka ekoki kobikisa bato; yango wana Batatoli basalaka makasi ya kosakwela moto nyonso. (Sef. 2:2, 3) Kolinga oyo balingaka Nzambe mpe bato mosusu nde etindaka bango bákende kotala bato mbala na mbala.
Na likita moko oyo bakonzi ya mangomba basalaki na Espagne, balobaki boye: “Ntango mosusu [mangomba] etyolaka mpenza mosala oyo Batatoli ya Yehova bamonaka ete ezali na ntina mingi, elingi koloba, kotala bato na bandako na bango, mayele oyo bantoma ya eklezia ya liboso basalelaki. Mangomba esukaka kaka na kotonga batempelo, mpe kobɛtaka bangonga mpo na kobenga bato, mpe kosakwela bango na kati ya bisika na bango ya losambo; nzokande [Batatoli] balandaka mayele ya bantoma, bakendeke ndako na ndako mpe basalelaka mabaku nyonso mpo na kotatola.”—El Catolicismo, Bogotá, Colombie, 14 Sɛtɛmbɛ 1975, lok. 14.
Kasi mpo na nini Batatoli bakendeke mbala na mbala na bandako ya bandimi ya mangomba mosusu?
Balukaka kondimisa bato na makasi te. Kasi bayebaka ete lelo moto akoki kofanda awa mpe lobi akei epai mosusu, mpe ete makambo ya bomoi ya bato ebongwanaka. Lelo moto akoki kozala na ntango te mpo na koyoka nsango malamu; kasi mokolo mosusu akoki kozwa mwa ntango ya koyoka. Moto moko ya libota akoki koboya nsango malamu, kasi basusu bakoki kosepela na yango. Bato bango moko mpe babongwanaka; mikakatano minene oyo moto akoki kokutana na yango na bomoi ekoki kotinda ye ayoka makambo ya Nzambe.—Talá mpe Yisaya 6:8, 11, 12.
Mpo na nini bato banyokolaka Batatoli ya Yehova mpe balobelaka bango mabe?
Yesu alobaki ete: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino. Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.” (Yoa. 15:18, 19; talá mpe 1 Petro 4:3, 4.) Biblia emonisi ete mokili mobimba ezali na mabɔkɔ ya Satana; ye nde moto atindaka bányokola Batatoli ya Yehova.—1 Yoa. 5:19; Em. 12:17.
Yesu ayebisaki lisusu bayekoli na ye ete: “Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai.” (Mrk. 13:13) Na vɛrsɛ oyo, liloba “nkombo” elimboli ndenge Yesu azali mpenza lelo oyo, Mokonzi Masiya. Batatoli ya Yehova banyokwamaka mpo batyaka mitinda ya Yesu liboso ya oyo ya mokonzi mosusu nyonso awa na mabele.
Soki moto atuni—
‘Mpo na nini bino bosanganaka te na misala oyo ekoki kobongisa mboka?’
Okoki koyanola: ‘Namoni ozali komibanzabanza mpo na bolamu ya mboka, biso mpe tosalaka bongo. Tiká natuna yo naino: Mpo na yo, mokakatano nini esengeli kolongola liboso?’ Okoki kobakisa: ‘Mpo na nini okanisi ete mokakatano yango nde esengeli kolongolama liboso? . . . Ya solo, soki likambo yango elongwe ekoki kozala malamu, kasi nakanisi okosepela soki mikakatano nyonso esili mpo na libela. Biso Batatoli ya Yehova totalelaka likambo yango ndenge wana. (Limbolelá ye oyo tosalaka mpo na kosalisa bato básalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango mpo básilisa mikakatano oyo bazali na yango; lisusu monisá ye oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala, mpe ndenge Bokonzi yango ekomemela bato bolamu mpo na libela.)’
To okoki koloba: ‘(Nsima ya komonisa ye mwa makambo mosusu oyo touti kolobela . . . ) Bato mosusu bapesaka mbongo mpo na kobongisa mboka; basusu basalaka misala. Batatoli ya Yehova basalaka nyonso mibale. Tiká nalimbolela yo.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Mpo na kozala Motatoli ya Yehova, moto asengeli kofutaka mpako na ye na bosembo mpenza; kosala bongo ekoki kosalisa Leta azwaka mbongo oyo asengeli na yango mpo na kosalisa misala.’ (2) ‘Tosalaka kutu mingi koleka wana, tokendeke na bandako ya bato, mpo na koyekola na bango Biblia ofele. Ntango bato wana bayebi malamu makambo oyo Biblia elobi, basalelaka yango mpe yango esalisaka bango bálonga mikakatano na bango.’
Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Nasepeli ndenge obimisi likambo yango. Bato mingi baluká naino te koyeba makambo oyo Batatoli ya Yehova basalaka mpo na kobongisa mboka. Makambo ya kosala mpo na kobongisa mboka ezali ebele.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Bato mosusu batongaka balopitalo, bandako mpo na mibange, babolɔkɔ mpo na kokanga bamɛli bangi mpe bongo na bongo. Basusu bakendeke mbala moko kotala bato na bandako na bango mpe kosalisa bango soki likoki ezali. Batatoli ya Yehova basalaka bongo.’ (2) ‘Tomoni ete ezali na eloko moko oyo ekoki kobongola bomoi ya moto; eloko yango ezali boyebi ya Biblia oyo ezali komonisa mpenza ntina ya bomoi mpe ndenge bomoi ekozala na mikolo ekoya.’
Makanisi mosusu: ‘Nasepeli ndenge obimisi motuna wana. Tokosepela komona makambo ebonga, bongo te? Tiká natuna yo naino: Oyokaka ndenge nini na likambo oyo Yesu Kristo asalaki? Okanisi ete ndenge azalaki kokende kosalisa bato ezalaki malamu? . . . Tomekaka kolanda ndakisa na ye.’
‘Bakristo basengeli kozala batatoli ya Yesu, kasi ya Yehova te’
Okoki koloba: ‘Obimisi likanisi moko ya malamu mpenza. Mpe olobi solo ete tosengeli kozala batatoli ya Yesu. Yango wana, na mikanda na biso, tolobelaka mingi mokumba oyo Yesu azali na yango na mokano ya Nzambe. (Okoki kosalela buku to zulunalo moko ya sika mpo na kolakisa ye likambo yango.) Kasi nalingi nayebisa yo likambo moko oyo mbala mosusu oyoká naino te. (Em. 1:5) . . . Yesu azalaki “Motatoli ya Sembo” ya nani? (Yoa. 5:43; 17:6) . . . Yesu atikaki ndakisa oyo biso tosengeli kolanda, boye te? . . . Mpo na nini ezali na ntina mingi tóyeba Yesu ná Tata na ye? (Yoa. 17:3)’