Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 288-lok. 292
  • Lipanda

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lipanda
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Lisumu
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Paradis: elikya ebongi kotyela motema atako moto atombokelaki Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 288-lok. 292

Lipanda

Ndimbola: Ezaleli ya moto oyo akanisaka ete asengeli kotalela makanisi ya bato mosusu te, moto yango aboyaka bátambwisa ye to báyebisa ye makambo oyo asengeli kosala. Lokola moto akelamá na bonsomi ya kopona, azalaka na mposa ya kosala mwa makambo ndenge alingi. Nzokande, soki mposa yango eleki ndelo, ekoki kosala ete moto yango azanga botosi, to atomboka.

Ntango bato baboyaka mibeko ya Biblia, bazwaka mpenza bonsomi?

Rom. 6:16, 23: “Boyebi te ete soki bozali kokoba komipesa na moto moko bózala baombo mpo na kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye, baombo ya lisumu mpo na kokufa to baombo ya botosi mpo na kozwa boyengebene? . . . Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa, kasi likabo oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.”

Gal. 6:7-9: “Bómikosa te: Nzambe azali moto ya kotyola te. Mpo nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka; mpo moto oyo azali kolona mpo na nzoto na ye akobuka libebi oyo euti na nzoto na ye, kasi moto oyo azali kolona mpo na elimo akobuka bomoi ya seko oyo euti na elimo. Yango wana, tótika te kosala oyo ezali malamu.”

Pite: “Moto oyo asalaka pite, azali kosalela nzoto na ye moko lisumu.” (1 Ko. 6:18) “Moto nyonso oyo azali kosala ekobo na mwasi . . . azali kobebisa molimo na ye moko.” (Mas. 6:32) (Mpo na oyo etali kosangisa nzoto mibali ná mibali to basi ná basi, talá Baroma 1:24-27.) (Ntango moto asali pite, yango ekoki kosepelisa ye mwa moke. Kasi yango ekoki kobimisa mikakatano: maladi mabe, zemi oyo moto akanaki te, kosopa zemi, zuwa, kotungisama na lisosoli, kotungisama na makanisi, mpe koboyama mpenza na Nzambe oyo bomoi na biso mpo na mikolo ezali koya ezali mpenza na mabɔkɔ na ye.)

Koluka biloko ya mokili na lokoso: “Bato oyo balingaka kaka kozala bazwi bakweaka na komekama mpe na motambo mpe na bamposa mingi ya bozoba mpe oyo eyokisaka mpasi, oyo ezindisaka bato na libebi mpe na likama. Mpo bolingo ya mbongo ezali mosisa ya makambo mabe ya ndenge nyonso, mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana babungi nzela, batiki kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.” (1 Tim. 6:9, 10) “Nakoloba na molimo na ngai ete: ‘Molimo na ngai, ozali na ebele ya biloko ya malamu oyo ebombami mpo na bambula mingi; pemá, lyá, mɛlá, omisepelisa.’ Kasi Nzambe alobaki na ye ete: ‘Zoba, na butu oyo bakosɛnga yo molimo na yo. Bongo nani akozwa biloko oyo onduki?’ Ezali mpe bongo mpo na moto oyo amibombeli biloko ya motuya kasi azali mozwi te na miso ya Nzambe.” (Luka 12:19-21) (Kozala na biloko ya mokili epesaka bolamu ya ntango molai te. Mbala mingi koboma nzoto mpo na kozwa bomɛngo ebebisaka bolamu ya libota, ebebisaka nzoto, mpe ebomaka moto na elimo.)

Komɛla masanga mingi: “Banani bazalaka na mawa? Banani bayokaka nzoto malamu te? Banani bawelanaka? Banani bazalaka na mitungisi? Banani bazokaka mpamba? Banani bazalaka na miso molilimolili? Baoyo balekisaka ntango mingi na vinyo, baoyo bakɔtaka mpo na koluka vinyo oyo esangisami. Na nsuka na yango, eswaka lokola nyoka, mpe ebimisaka ngɛngɛ lokola etupa.” (Mas. 23:29, 30, 32) (Ntango moto azali komɛla masanga na ebandeli amonaka ete ezali kosalisa ye abosana mikakatano na ye, nzokande esilisaka yango te. Ntango kwiti esili, mikakatano yango ezalaka kaka, mpe mbala mingi yango ebakisaka nde mikakatano mosusu. Komɛla masanga mingi ebebisaka lokumu ya moto, ebebisaka nzoto na ye, libota na ye, mpe boyokani na ye na Nzambe.)

Kosalela drɔgɛ na ndenge ya mabe: Talá nkasa 154-161, na motó ya likambo “Drɔgɛ.”

Baninga mabe: Soki miyibi bayebisi yo ete bayebi ndenge bakoki kozwa mbongo ebele na mbala moko, okolanda bango? “Kokende nzela moko na bango te. Pekisá lokolo na yo na balabala na bango. Mpo makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosala mpenza mabe, mpe bawelaka kosopa makila.” (Mas. 1:10-19) Soki moto asambelaka Yehova te, kasi amonanaka ete azali moto malamu, okokanisa ete azali moninga oyo abongi na yo? Biblia elobi ete Shekeme, mwana ya nkumu moko Mokanana, “azalaki moto oyo alekaki na lokumu na ndako mobimba ya tata na ye,” kasi “azwaki [Dina] mpe alalaki na ye mpe abebisaki ye.” (Eba. 34:1, 2, 19) Ndenge nini osengeli kotalela bato oyo bandimaka te mateya ya solo oyo oyekolá na Liloba ya Nzambe? “Bómikosa te. Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.” (1 Ko. 15:33) Yehova akoyoka ndenge nini soki oponi baninga oyo balingaka ye te? Mokonzi moko ya Yuda asalaki bongo mpe mosakoli ya Yehova alobaki na ye ete: “Yango wana, nkanda oyo euti na Yehova ye moko ekiteli yo.”—2 Nt. 19:1, 2.

Nani atindaki bato bázwa bikateli ndenge balingi kozanga kotalela mibeko ya Nzambe?

Eba. 3:1-5: “Sikoyo nyoka [oyo Satana asalelaki; talá Emoniseli 12:9] . . . abandaki koloba na mwasi ete: ‘Ezali mpenza solo ete Nzambe alobaki na bino ete bosengeli te kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga?’ Bongo mwasi alobaki na nyoka ete: ‘Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: “Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.”’ Bongo nyoka alobaki na mwasi ete: ‘Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.’”

Elimo nini etindaka moto aboya kolanda mokano ya Nzambe mpo akokisa bamposa na ye moko?

Ef. 2:1-3: “Ezali bino nde bato Nzambe azongisi na bomoi atako bokufaki na mabunga na bino mpe na masumu na bino, oyo kala bozalaki kotambola na yango na kolanda makambo ya mokili oyo [oyo Satana azali koyangela], na kolanda mokonzi ya nguya ya mopɛpɛ, elimo oyo ezali sikoyo kosala mosala na kati ya bana ya kozanga botosi. Ɛɛ, na kati na bango biso nyonso tozalaki komitambwisa kala na kolanda bamposa ya nzoto na biso, tozalaki kosala makambo oyo nzoto mpe makanisi ezalaki kolinga, mpe tozalaki mpenza bana ya nkanda lokola bato mosusu.”

Bato oyo basalelaka Nzambe basengeli koboya bizaleli nini oyo emonisaka elimo ya lipanda?

Mas. 16:18: “Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.”

Mas. 5:12: “Okoloba mpenza ete: ‘Talá nayinaki disiplini mpe motema na ngai etyolaki mpenza mpamela!’” (Ezaleli ya ndenge wana ekoki komemela moto mikakatano makasi, ndenge bavɛrsɛ mosusu ya mokapo oyo emonisi yango.)

Mit. 16:3: “Bongo bayanganaki mpo na kotɛmɛla Moize ná Arona mpe balobaki na bango ete: ‘Tobaye bino, mpamba te liyangani oyo mobimba, bango nyonso bazali basantu mpe Yehova azali na kati na bango. Bongo, mpo na nini bino bozali komitombola likoló ya lisangá ya Yehova?’”

Yuda 16: “Bato yango bazali bato oyo baimaimaka, bato oyo bamilelalelaka mpo na bomoi na bango, bazali kolanda bamposa na bango moko, mpe minɔkɔ na bango ezali koloba makambo ya lolendo, wana bazali kokumisa bato mpo na koluka litomba na bango moko.”

3 Yoa. 9: “Diotrefese, oyo alingaka kozwa esika ya liboso na kati na bango, azali koyamba na limemya ata eloko moko te oyo euti epai na biso.”

Mas. 18:1: “Ye oyo azali komitangola na bamosusu akoluka mposa na ye ya lokoso; akotombokela makambo nyonso ya bwanya.”

Yak. 4:13-15: “Sikoyo bóyoka, bino bato oyo bolobaka ete: ‘Lelo to lobi tokokende na engumba oyo mpe tokolekisa mbula moko kuna, mpe tokosala mombongo mpe tokozwa benefisi mingi,’ nzokande boyebi te ndenge bomoi na bino ekozala lobi. Mpo bozali londende oyo ebimaka mpo na mwa ntango moke mpe na nsima elimwe. Kutu, bosengelaki nde koloba ete: ‘Soki Yehova alingi, tokozala na bomoi mpe lisusu tokosala boye to boye.’”

Ntango mposa ya moto ya kozala na lipanda etindi ye amekola mokili, nani azali kotambwisa moto yango? Mpe ndenge nini Nzambe atalelaka likambo yango?

1 Yoa. 2:15; 5:19: “Bólingaka mokili te ná biloko oyo ezali na mokili. Soki moto azali kolinga mokili, bolingo ya Tata ezali na kati na ye te.” “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.”

Yak. 4:4: “Yango wana, moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto