Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 29
  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Bato oyo bakufá bazali wapi?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Osengeli kobanga bakufi?
    Lamuká!—2009
  • Elikya nini ezali mpo na bato oyo bakufá?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Soki moto akufi akendaka wapi?
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 29
Liteya 29. Mwasi moko ná mobali na ye bazali kobondela liboso ya nkunda.

LITEYA 29

Nini ekómelaka moto ntango akufi?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Osilá kobungisa moto moko oyo olingaka na liwa? Mbala mosusu na ntango wana ya mpasi, omitunaki boye: ‘Nini ekómelaka moto ntango akufi? Tokomona lisusu bandeko to baninga na biso oyo bakufá?’ Na liteya oyo mpe oyo elandi, tokozwa biyano ya kolendisa oyo Biblia epesi.

1. Nini ekómelaka moto ntango akufi?

Yesu alobaki ete liwa ezali lokola mpɔngi. Moto oyo alali mpɔngi makasi ayebaka te makambo oyo ezali koleka esika azali. Na ndenge nini liwa ezali lokola mpɔngi? Soki moto akufi, ayokaka mpasi te. Ayokaka mpe mawa te ndenge akabwani na baninga mpe bandeko na ye, ata soki abandaki kolinga bango mingi. Biblia elobi ete: “Bakufi bayebi ata eloko moko te.”​—Tángá Mosakoli 9:5.

2. Bolamu nini tozwi mpo toyebi oyo Biblia elobi mpo na liwa?

Bato mingi babangaka liwa mpe bato oyo bakufá! Kasi makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa ekoki kolendisa yo. Yesu alobaki: “Solo ekopesa bino bonsomi.” (Yoane 8:32) Mangomba mosusu eteyaka ete ntango moto akufi, molimo na ye ekobaka kozala na bomoi; kasi Biblia eteyaka bongo te. Na yango, moto moko te anyokwamaka nsima ya liwa. Lisusu, lokola bato oyo bakufá bayebaka eloko moko te, bakoki kosala biso mabe te. Yango wana, tosengeli te kosambela bato oyo bakufá to mpe kosala likambo moko boye mpo na kokitisa bango nkanda. Tosengeli mpe te kobondela mpo na bango.

Bato mosusu balobaka ete bakoki kosolola na bato oyo bakufá. Kasi yango ekoki kosalema te. Ndenge kaka touti komona yango, bato oyo bakufá “bayebi ata eloko moko te.” Bato oyo bakanisaka ete basololaka na bandeko to baninga na bango oyo bakufá, basololaka nde na bademo, oyo bamimonisaka lokola bato oyo bakufá. Yango wana, koyeba solo oyo etali liwa ebatelaka biso na bademo. Yehova apekisi biso kosolola na bato oyo bakufá mpo ayebi ete kosala bongo ezali nde kosolola na bademo mpe yango ekomemela biso likama.​—Tángá Kolimbola Mibeko 18:10-12.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo Biblia elobi mpo na liwa, mpe kómisá kondima na yo makasi epai ya Nzambe ya bolingo, oyo anyokolaka te bato oyo bakufá.

Mobali moko ná bana na ye bafandi na kiti mpo na kolela mwasi na ye oyo akufi. Bandeko mpe baninga bazali kobɔndisa bango.

3. Luká koyeba oyo ekómelaka mpenza bato oyo bakufá

Na mokili mobimba, bato bandimaka makambo ndenge na ndenge mpo na oyo ekómelaka moto soki akufi. Mpo na koloba solo, makambo nyonso wana ekoki kozala solo te.

  • Na esika ofandi, makambo nini bato bandimaka mpo na bato oyo bakufá?

Mpo na komona makambo oyo Biblia eteyaka, talá VIDEO.

VIDEO: Moto akómaka ndenge nini soki akufi?​—Video ya mokuse (1:19)

Bililingi: Bililingi ya video ‘Moto akómaka ndenge nini soki akufi?​—Video ya mokuse.’ 1. Ebembe likoló ya mbeto ya lopitalo. 2. Mobali moko oyo afandi na katikati ya bato mibale mpe azali kolala na kati ya engbunduka (train).

Tángá Mosakoli 3:20, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Na kotalela vɛrsɛ oyo, nini ekómelaka moto ntango akufi?

  • Ezali na eloko moko na kati ya nzoto ya moto, oyo ekobaka kozala na bomoi nsima ya liwa?

Biblia ebɛti lisolo ya liwa ya Lazare, moninga ya Yesu. Tángá Yoane 11:11-14 mpo na komona makambo oyo Yesu alobaki mpo na liwa ya Lazare. Na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Yesu alobaki ete liwa ekokani na nini?

  • Likambo oyo Yesu alobaki eteyi biso nini mpo na bato oyo bakufá?

  • Makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa, omoni yango ndenge nini?

4. Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa esalisaka biso mpenza

Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa esalisaka biso tóbangaka bawei te. Tángá Mosakoli 9:10, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Bato oyo bakufá bakoki kosala biso mabe?

Mateya ya Biblia esalisaka biso tokwea te na motambo ya kosambela bato oyo bakufá to mpe kosala likambo moko boye mpo na kokitisa bango nkanda. Tángá Yisaya 8:19 mpe Emoniseli 4:11, na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Okanisi nini, ndenge nini Yehova atalelaka moto oyo asambelaka bato oyo bakufá to oyo alukaka lisalisi na bango?

Bililingi: Mimeseno mpo na kopesa bato oyo bakufá lokumu. 1. Mobali moko atye bilei likoló ya nkunda, afukami mpe azali kobondela. 2. Mibali misato balati matiti bazali kobina. 3. Na mokolo ya bakufi, bato bazali kotambola, balati ba masque mpe basimbi banzete oyo ezali na mokuwa ya motó ya moto.

Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa elongolá biso na boombo ya mimeseno oyo esepelisaka Yehova te

5. Oyo Biblia elobi mpo na liwa ekitisaka biso motema

Mangomba mingi eteyaka ete soki moto akufi, azwaka etumbu mpo na makambo mabe oyo asalá kala. Kasi koyeba ete bato oyo bakufá, ezala baoyo basalá makambo ya mabe mpenza, banyokwamaka te, ekitisaka biso motema. Tángá Baroma 6:7, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Biblia elobi ete soki moto akufi, afuti nyongo ya lisumu na ye; okanisi ete moto oyo akufi akoki kozwa lisusu etumbu mpo na masumu oyo asalá kala?

Soki toyekoli koyeba Yehova malamumalamu, tokomona ete anyokolaka ata moke te bato oyo bakufá. Tángá Kolimbola Mibeko 32:4 mpe 1 Yoane 4:8, na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Ndenge bavɛrsɛ oyo emonisi yango, Nzambe oyo azali na bizaleli malamu boye akoki mpenza konyokola bato oyo bakufá?

  • Makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa, ekitisi yo motema? Mpo na nini?

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Nabangaka oyo ekokómela ngai mokolo nakokufa.”

  • Okopesa ye vɛrsɛ nini mpo na kokitisa ye motema?

NA MOKUSE

Ntango moto akufi, bomoi na ye esuki. Bato oyo bakufá banyokwamaka te, mpe bakoki te kosala bato oyo bazali na bomoi mabe to malamu.

Bozongeli

  • Nini ekómelaka moto ntango akufi?

  • Koyeba oyo Biblia elobi mpo na liwa esalisi biso na nini?

  • Mpo na nini makambo oyo Biblia elobi mpo na liwa ekitisaka biso motema?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Talá oyo Biblia elobi mpo na liloba “molimo.”

“Molimo ezali nini?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

Luká koyeba soki Nzambe atumbaka bato mabe na lifelo ya mɔtɔ.

Lifelo ezali mpenza esika oyo bato banyokwamaka? (3:07)

Tosengeli kobanga bato oyo bakufá?

Bilimu ya bakufi​—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? (mwa buku)

Talá ndenge mobali moko abɔndisamaki ntango ayebaki makambo oyo Biblia elobi mpo na oyo ekómelaka moto ntango akufi.

“Biyano ya polele mpe oyo ebongi ya Biblia, ekamwisaki ngai” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/02/2015)

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto