Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 19 points 1-6
  • Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Ndenge nini tokoki koyeba bakristo ya solo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Nzambe ya solo azali nani?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mpo na nini tobengami Batatoli ya Yehova?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 19 points 1-6
Liteya 19. Batatoli ya Yehova bazali kosolola na libanda ya Ndako ya Bokonzi.

LITEYA 19

Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Biso Batatoli ya Yehova, tondimaka ete tozali bakristo ya solo. Mpo na nini? Tótala esika oyo mateya na biso eutaka, nkombo oyo tozwá, mpe bolingo oyo tomoniselanaka.

1. Batatoli ya Yehova bazwaka mateya na bango wapi?

Yesu alobaki: ‘Liloba ya Nzambe ezali solo.’ (Yoane 17:17) Ndenge moko na Yesu, mateya ya Batatoli ya Yehova esimbami na Liloba ya Nzambe. Mpo na komona yango, tólobela naino lisolo ya Batatoli ya Yehova ya mikolo na biso. Na 1870, etuluku moko ya bato ya mitema sembo babandaki koyekola Biblia elongo, mpo na koyeba oyo yango eteyaka mpenza. Bazalaki kondima makambo oyo bamonaki na Biblia ata soki ekeseni na mateya ya mangomba. Na nsima, bakómaki koyebisa basusu mateya yango ya Biblia.a

2. Mpo na nini tomibengaka Batatoli ya Yehova?

Yehova abengi basaleli na ye Batatoli, mpo bateyaka basusu solo etali ye. (Baebre 11:4–12:1) Na ndakisa, na ntango ya kala, Nzambe ayebisaki basaleli na ye ete: “Bino bozali batatoli na ngai.” (Tángá Yisaya 43:10.) Biblia ebengi Yesu “Motatoli ya Sembo.” (Emoniseli 1:5) Yango wana, na 1931 tozwaki nkombo Batatoli ya Yehova. Tozalaka na esengo ya kobengama na nkombo yango.

3. Ndenge nini Batatoli ya Yehova bamekolaka bolingo ya Yesu?

Yesu azalaki kolinga bayekoli na ye mingi mpe kotalela bango lokola bandeko ya libota na ye. (Tángá Marko 3:35.) Ndenge moko mpe, Batatoli ya Yehova bazalaka na bomoko mpe bazalaka libota moko ya bandeko na mokili mobimba. Yango wana tobenganaka bandeko. (Filemo 1, 2) Totosaka mpe mobeko oyo: “Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.” (1 Petro 2:17) Batatoli ya Yehova bamonisaka bolingo yango na ndenge mingi, na ndakisa, basungaka bandeko na bango oyo bazali na mposa ya lisalisi na mokili mobimba.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba malamumalamu lisolo ya Batatoli ya Yehova, mpe talá makambo mosusu oyo emonisi ete tozali mpenza bakristo ya solo.

Bililingi: Batatoli ya Yehova bazali kosakola. 1. Ndeko mwasi azali kotángela mwasi moko vɛrsɛ ya Biblia. 2. Ndeko mobali moko atɛlɛmi na shario mpe azali kosakwela mobali moko.

Mateya ya bakristo ya solo eutaka na Biblia mpe bayebisaka yango basusu

4. Mateya oyo tondimaka eutaka na Biblia

Yehova alobaki ete solo ya Biblia ekomonana polele. Tángá Danyele 12:4, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini esengelaki ‘kokóma mingi’ epai ya basaleli ya Nzambe wana bazali kokoba koyekola Biblia?

Talá ndenge mwa etuluku ya Bayekoli ya Biblia ná Charles Russell bayekolaki Liloba ya Nzambe. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Bamoni lisusu solo ya Biblia (7:45)

  • Na video yango, ndenge nini Charles Russell ná bato oyo bazalaki elongo na ye bazalaki koyekola Biblia?

Oyebaki yango?

Na bantango mosusu, tobongisaka lisusu mateya na biso. Mpo na nini? Kaka ndenge moi ebimaka mpe epesaka pole mokemoke na mokili, Nzambe mpe asalisaka biso mokemoke tóyeba Liloba na ye. (Tángá Masese 4:18.) Biblia ebongwani te, kasi ntango tokangi ntina na yango malamu, tobongisaka lisusu mateya na biso.

5. Tosalaka makambo na kolanda nkombo oyo tobengami na yango

Mpo na nini tozwá nkombo Batatoli ya Yehova? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Nkombo oyo toyebani na yango (2:40)

  • Mpo na nini ebongi tóbengama Batatoli ya Yehova?

Mpo na nini Yehova aponi bato bázala batatoli na ye? Mpo basengeli kosalisa bato mosusu báyeba ete azali Nzambe ya solo mpo bakoselá ye makambo mingi. Tótalela makambo yango mibale ya lokuta.

Mangomba mosusu eteyaka bandimi na yango ete Nzambe alingaka básalela bikeko to bililingi mpo na kosambela ye. Tángá Balevi 26:1, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Biblia elobi nini? Ndenge nini Yehova atalelaka kosambela bikeko to bililingi?

Bakonzi mosusu ya mangomba bateyaka ete Yesu azali Nzambe. Ezali solo? Tángá Yoane 20:17, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Biblia elobi nini? Yesu, ye wana kaka nde Nzambe?

  • Koyeba ete Yehova atindi Batatoli na ye báteya solo mpo na ye mpe mwana na ye, esali ete omiyoka ndenge nini?

6. Tolinganaka

Biblia elobi ete bakristo bazali lokola biteni ya nzoto ya moto, oyo esalaka na bomoko. Tángá 1 Bakorinti 12:25, 26, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Bakristo ya solo basengeli kosala nini ntango bandeko na bango mosusu bazali konyokwama?

  • Omonaka ete Batatoli ya Yehova balinganaka mpenza?

Ntango Batatoli ya Yehova bazali konyokwama na ekólo moko boye, Batatoli ya Yehova ya mokili mobimba basalisaka bandeko na bango mbala moko. Mpo na komona ndakisa moko, talá VIDEO. Na nsima, yanolá na motuna oyo elandi.

VIDEO: Mopɛpɛ makasi babengi Matthew ebɛti na Haïti (5:29)

  • Ndenge nini lisungi oyo Batatoli ya Yehova bapesi emonisi bolingo?

Batatoli ya Yehova bazali kosalisa mwasi moko na mwana na ye oyo bakutani na likama. Bazali kozipa bango na bolangiti mpe kopesa bango mai ya komɛla.

Bakristo ya solo balinganaka mpe basalisaka bato oyo bazali na mposa ya lisalisi

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ntango Nzambe asalaki mokili bino bozalaki te, mpo na nini bomibengaka ‘ba-Témoins de Jéhovah?’”

  • Okoyebisa ye nini?

NA MOKUSE

Biso Batatoli ya Yehova tozali bakristo ya solo. Tozali libota ya bandeko na mokili mobimba, mateya na biso eutaka na Biblia mpe tosalisaka bato báyeba solo etali Yehova.

Bozongeli

  • Mpo na nini tondimaki kozwa nkombo Batatoli ya Yehova?

  • Ndenge nini tosalelanaka makambo?

  • Okanisi nini: Batatoli ya Yehova bazali mpenza bakristo ya solo?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Luká koyeba lisolo na biso malamumalamu.

Batatoli ya Yehova​—Kondima emonani na misala, Eteni 1: Balongwe na molili (1:00:53)

Talá ndenge Batatoli ya Yehova bamonisaki polele mateya ya lokuta.

Bato ya Nzambe bakumisaka nkombo na ye (7:08)

Luká biyano na mituna oyo okoki komituna mpo na Batatoli ya Yehova.

“Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova” (Lokasa oyo ezali na Internet)

Stephen azalaki koyina bato ya loposo mosusu mpe kosala bango mabe. Talá makambo oyo amonaki epai ya Batatoli ya Yehova oyo etindaki ye abongwana.

“Bomoi na ngai ezalaki kobeba se kobeba” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/07/2015)

a Kobanda 1879, Batatoli ya Yehova babimisaka zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpo na kolimbola makambo ya Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto