LITEYA 49
Ndenge ya kozala na libota ya esengo—Eteni 1
Mwasi ná mobali oyo babalani sika bakanisaka ete esengo oyo bazalaki na yango mokolo ya libala na bango ekoumela libela. Ekoki kosalema. Bakristo oyo babalaná eleki sikoyo bambula mpe basalaka makasi ya kosalela batoli ya Biblia, bayebi ete likambo yango ekoki kosalema.
1. Toli nini Biblia epesi mobali?
Yehova apesi mobali mokumba ya kotambwisa libota. (Tángá Baefese 5:23.) Yehova alingi ete mobali azwa bikateli oyo ekomemela libota bolamu. Biblia eyebisi mibali boye: “Bókoba kolinga basi na bino.” (Baefese 5:25) Yango elingi koloba nini? Mobali oyo alingaka mwasi na ye asalelaka ye makambo na boboto, ezala ntango bazali bango mibale to na miso ya bato. Abatelaka mwasi na ye, akokisaka bamposa na ye mpe asalaka ete azala na esengo. (1 Timote 5:8) Oyo eleki ntina, asalisaka mwasi na ye azala na boninga makasi ná Yehova. (Matai 4:4) Na ndakisa, akoki kobondela mpe kotánga Biblia elongo na mwasi na ye. Mobali akozala na boninga malamu ná Yehova soki azali kolinga mwasi na ye mpe kokokisa bamposa na ye.—Tángá 1 Petro 3:7.
2. Toli nini Biblia epesi mwasi?
Biblia elobi ete mwasi “asengeli kozala na limemya makasi epai ya mobali na ye.” (Baefese 5:33) Ndenge nini akoki kosala yango? Mwasi akoki kokanisa bizaleli malamu ya mobali na ye mpe milende oyo azali kosala mpo na kokokisa bamposa na ye mpe ya bana na bango. Akomonisa mpe limemya epai ya mobali na ye soki azali kopesa ye mabɔkɔ ntango azwi bikateli, soki azali koloba na ye na boboto mpe azali koloba malamu mpo na ye ata soki mobali na ye asambelaka Yehova te.
3. Ndenge nini mwasi ná mobali bakoki kokómisa libala na bango malamu koleka?
Biblia elobi boye mpo na babalani: “Bango mibale bakozala mosuni moko.” (Matai 19:5) Yango elingi koloba ete basengeli koboya likambo nyonso oyo ekokitisa bolingo na bango. Bakosala yango soki bazali kolekisa ntango elongo mbala na mbala, kosolola polele mpe na bolingo nyonso mpe moto na moto azali koyebisa moninga ndenge oyo azali komiyoka. Osengeli kozwa molongani na yo na motuya mingi koleka moto to eloko mosusu nyonso, longola kaka Yehova. Mwasi ndenge moko mpe mobali, basengeli te kozala seresere na moto oyo azali molongani na bango te.
KƆTÁ NA MOZINDO
Luká koyeba batoli ya Biblia oyo ekoki kokómisa libala na yo makasi.
4. Mobali, lingá mwasi na yo mpe kokisá bamposa na ye
Biblia elobi ete “mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” (Baefese 5:28, 29) Yango elingi koloba nini? Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo elandi.
Na makambo nini mobali akoki komonisa ete alingaka mwasi na ye mpe akokisaka bamposa na ye?
Tángá Bakolose 3:12, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Ndenge nini mobali akoki komonisa bizaleli yango na libala?
5. Mwasi, lingá mobali na yo mpe tosá ye
Biblia elendisi mwasi atosaka mobali na ye, ata soki asambelaka Yehova te. Tángá 1 Petro 3:1, 2, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Soki mobali na yo asambelaka Yehova te, na ntembe te olingaka akóma kosambela Yehova. Okanisi ete nini eleki malamu: Koteya ye mbala na mbala to kozala na bizaleli malamu mpe kotosa ye?
Mwasi ná mobali bakoki kozwa bikateli ya malamu elongo. Kasi, na bantango mosusu mwasi akoki kosepela te na ekateli oyo mobali na ye azwi. Na ntango yango, mwasi akoki kopesa makanisi na ye na motema ya kokita mpe na boboto, kasi asengeli kobosana te ete Yehova apesi mobali mokumba ya kozwa bikateli mpo na bolamu ya libota. Mwasi asengeli kosala nyonso mpo na kopesa mabɔkɔ na bikateli oyo mobali na ye azwi. Soki mwasi asali bongo, libota ekozala na esengo. Tángá 1 Petro 3:3-5, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:
Yehova ayokaka ndenge nini ntango mwasi azali kotosa mobali na ye?
6. Okoki kolonga mikakatano na libala na yo
Libala ya kokoka ezalaka te. Yango wana, mwasi ná mobali basengeli kosala elongo mpo na kolonga mikakatano. Talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na motuna oyo.
Na video yango, nini emonisi ete mwasi ná mobali bakómaki kosala makambo moto na moto na ndenge na ye?
Makambo nini basalaki mpo bákómisa libala na bango malamu koleka?
Tángá 1 Bakorinti 10:24 mpe Bakolose 3:13. Nsima ya kotánga vɛrsɛ mokomoko, yanolá na motuna oyo:
Ndenge nini kosalela toli oyo ekoki kokómisa libala malamu koleka?
Biblia elobi ete tosengeli kopesanaka lokumu. Kopesa moto lokumu elingi koloba, kosalela ye makambo na boboto mpe na limemya. Tángá Baroma 12:10, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:
Mobali to mwasi asengeli kozela ete molongani na ye azala moto ya liboso ya kopesa ye lokumu? Mpo na nini?
SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Ngai ná molongani na ngai tolinganaka lisusu te ndenge ezalaki liboso.”
Ndenge nini okoki komonisa ye ete Biblia ekoki kosalisa bango?
NA MOKUSE
Mwasi ná mobali bakozala na esengo soki balingani, bazali komoniselana limemya mpe kosalela batoli ya Biblia.
Bozongeli
Ndenge nini mobali akoki kosala ete libala ezala na esengo?
Ndenge nini mwasi akoki kosala ete libala ezala na esengo?
Soki obalá, batoli nini ya Biblia ekoki kosalisa yo okómisa libala na yo malamu koleka?
MAKANISI MOSUSU
Talá batoli oyo ekoki kosalisa yo ozala na libota ya esengo.
Talá video ya miziki oyo emonisi mapamboli oyo mwasi ná mobali bazwaka soki bazali kosalela batoli oyo Nzambe apesi mpo na libala.
Talá soki kotosa bokonzi ya mobali elakisi nini.
“Basi, mpo na nini kotosa bokonzi?” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/05/2010)
Ndenge nini mwasi moko ná mobali na ye balongaki mikakatano ya makasi oyo bazalaki na yango oyo elingaki kosala ete libala na bango ekufa.
Tobongisaki lisusu libala na biso na lisalisi ya Nzambe (5:14)