Taleláká “nsuka” ya likambo
NA BOMOI na biso, esɛngaka tózwa bikateli mingi. Na ntembe te, bwanya ezali kosɛnga ete tólukaka koyeba nsuka ya ekateli nyonso liboso tózwa yango. Bato mingi bayokaka mawa mpo na bikateli mosusu oyo bazwaki. Mbala mosusu esilá mpe kokómela yo oloba ete, ‘Soki nayebaki ndenge likambo oyo ekosuka, nalingaki kosala yango te.’
Moto oyo amesaná kosala mibembo alukaka koyeba epai nzela nyonso ememi. Mpo na koyeba yango, akoki kotala karte mpe kotuna bato oyo bayebi malamu bisika yango. Ntango azali kosala mobembo, atyaka likebi na bilembo oyo azali komona nzelanzela. Kasi, na oyo etali bomoi na yo, ndenge nini okoki koyeba nzela ya malamu oyo okoki kolanda? Na ntina na libota na ye Yisalaele, Nzambe alobaki boye na nzela ya Moize: “Soki bazalaki na mayele mbɛ basosoli oyo, mpe bakoki kotala nsuka oyo ekokwela bango!”—Deteronome 32:29.
Toli oyo eleki malamu
Ezali na ntina te tómituna mituna ebele ebele mpo na “nsuka” ya banzela ndenge na ndenge oyo tokoki kolanda na bomoi na biso. Nzambe nde abongi mpenza kopesa moto nyonso toli oyo eleki malamu mpo na kotambola na nzela ya bomoi. Amoni banzela ndenge na ndenge oyo bato balandi mpe epai oyo ememi bango. Biblia elobi boye: “Zambi nzela ya moto ezali liboso ya miso ya [Yehova] mpe ye akobanza mpo na bilekelo na ye nyonso.”—Masese 5:21.
Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo balingaka ye. Na lisalisi ya Biblia, Liloba na ye, alakisi bango nzela oyo eleki malamu. Tozali kotánga boye: “Nakoteya yo mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo [kolanda]; Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.” Yango wana, liboso ya kotya lokolo ata na nzela nini, ezali malamu kotuna toli ya Yehova, na ndakisa ya Davidi, mokonzi ya Yisalaele ya kala, oyo abondelaki boye: “Lakisá ngai nzela ekoki na ngai kotambola.”—Nzembo 32:8; 143:8.
Soki olandi nzela oyo moto moko oyo okoki kotyela motema mpe amesaná kosala mibembo alakisi yo, okozala motema ya kokita mpe na elikya ete okotambola malamu. Okobanda komituna te epai wapi nzela yango ekomema yo. Davidi alukaki litambwisi ya Yehova mpe alandaki yango. Yango wana azalaki na kimya ya motema oyo amonisaki na maloba kitoko oyo ezali na Nzembo 23. Davidi akomaki boye: “[Yehova] azali mobateli na ngai, nakozanga eloko te. Azali kopemisa ngai kati na matiti mobesu, azali kokendisa ngai epai na mai ya kimya. Akolendisaka molimo na ngai. Akotambolisaka ngai na nzela ya boyengebene mpo na nkombo na ye. Ata natamboli na libulu ya molili ya kufa, nakobanga mabe te.”—Nzembo 23:1-4.
Nsuka na bango ekozala nini?
Mokomi moko ya nzembo, ekoki kozala Asafa to mokitani na ye moko, alobaki ete ‘azalaki penepene ya kopɛngwa’ na nzela ya sembo. Mpo na nini? Azalaki komona ete bato oyo bazangi sembo mpe bato ya mobulu bazalaki na bomoi ya malamu mpe azalaki na zuwa mpo na “esengo ya bato mabe.” Azalaki komona ete bato yango ‘ntango nyonso bazalaki na kimya.’ Likambo ya mabe koleka ezali ete moto yango akómaki komituna soki amonisaki mpenza bwanya ndenge aponaki nzela ya bosembo.—Nzembo 73:2, 3, 6, 12, 13.
Na nsima, mokomi ya nzembo akɔtaki na tempelo ya Yehova, abondelaki mpe akanisaki ndenge bato mabe bakosuka. Alobaki boye: “[Nalukaki kososola, NW] mpo na nsuka na bango.” Akanisaki ndenge bato oyo azalaki koyokela zuwa bakosuka. Nsuka na bango ekozala nini? Asosolaki ete bato yango bazalaki na “nzela ya mosɛlu” mpe ete basengelaki ‘kobwakama na mobulu’! Ezali boni mpo na nzela oyo mokomi ya nzembo azalaki kolanda? Ye moko alobaki boye: “Na nsima [yo Yehova] okoyamba ngai na nkembo na yo.”—Nzembo 73:17-19, 24.
Ntango mokomi ya nzembo akanisaki ndenge bato oyo bazalaki kozwa bomɛngo na nzela mokuse to na ndenge ya nyamunyamu bakosuka, amonaki ete ye azalaki na nzela ya malamu. Alobaki boye: “Mpo na ngai, ezali malamu ete nabɛlɛma na Nzambe.” Kotikala penepene na Yehova Nzambe ememaka ntango nyonso mapamboli.—Nzembo 73:28.
“Kanisaka malamu po na nzela oyo olingi kolanda”
Lelo oyo, biso mpe tokoki kokutana na mikakatano ya ndenge wana. Bakoki kopesa yo mosala moko oyo bakofuta yo mbongo mingi, komatisa yo mpɛtɛ na mosala, to kosɛnga yo okɔta na mombongo moko oyo ekozala na benefisi mingi. Ya solo, likambo nyonso ya sika oyo moto alingi kosala ezangaka likama te. Atako bongo, omoni te ete ezali malamu kotalela “nsuka” ya likambo nyonso oyo olingi kosala? Mikakatano nini yango ekoki komema? Ekosɛnga otikaka libota na yo, likambo oyo ekoki kotungisa mwasi na yo mpe yo moko? Ekomema yo olekisaka ntango mingi na baninga ya mabe to na baotɛlɛ mpe na bisika mosusu? Soki otaleli liboso nzela oyo olingi kolanda, ekosalisa yo ozwa ekateli ya malamu. Salomo apesaki toli oyo: “Kanisaka malamu po na nzela oyo olingi kolanda.”—Masese 4:26, Bible na lingala ya lelo oyo.
Ezali malamu ete mokomoko na biso, kasi mingimingi bilenge, tókanisa na toli yango. Elenge moko adefaki kasɛti-video oyo ayebaki malamu ete ezali na makambo ya kosangisa nzoto. Alobaki ete nsima ya kotala video yango, akómaki na mposa makasi ya kosangisa nzoto tii akendaki koluka mwasi moko ya ndumba oyo azalaki kofanda mosika te. Na nsima, ayokaki mpasi na motema, lisosoli na ye ekómaki kotungisama, mpe azalaki kobanga ete mbala mosusu azwi maladi ya mabe. Likambo oyo ekómelaki ye ekokani mpenza na oyo Biblia elobi: “[Alandi] ye nokinoki, lokola ngɔmbɛ akei na kobomama.” Nyonso wana elingaki kokómela ye te soki atalelaki “nsuka” ya likambo!—Masese 7:22, 23.
Tyáká likebi na bilembo
Bato mingi bayebi ete kozanga kotya likebi na bilembo oyo ezali kolakisa nzela ezali bozoba. Kasi, likambo ya mawa ezali ete yango nde bato mosusu basalaka na bomoi na bango ntango basepeli te na nzela oyo balakisi bango. Tótalela ndakisa ya Bayisalaele mosusu na ntango ya Yilimia. Na eleko yango, basengelaki kozwa ekateli mpe Yehova Nzambe apesaki bango toli oyo: “Bótuna mpo na bilekelo ya kala, ete nzela malamu ezali wapi; bótambola wana.” Kasi, na motó makasi na bango, balobaki ete ‘bakotambola’ na nzela wana te. (Yilimia 6:16) “Nsuka” na bango ezalaki nini? Na mobu 607 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato ya Babilone bayaki mpe babebisaki engumba Yelusaleme mpe bamemaki bafandi na yango na boombo.
Soki tozali koboya kotya likebi na bilembo oyo Nzambe atye na nzela oyo tozali kotambola, tokosuka mabe. Makomami elendisi biso na maloba oyo: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te. Na nzela nyonso na yo, ndimá ye mpe ye akotambolisa yo.”—Masese 3:5, 6.
Makebisi mosusu ya Nzambe ezali lokola bilembo oyo elobaka ete “Epekisami kokɔta awa.” Na ndakisa, Biblia elobi boye: “Ingelá na nzela ya bato mabe te mpe kɔtá na elekelo ya bato ya masumu te.” (Masese 4:14) Moko na banzela mabe yango ezali oyo elobelami na Masese 5:3, 4: “Monɔkɔ ya mwasi mopaya ekotangisa elɛngi lokola nzoi mpe bibɛbu na ye eleki mafuta na kitoko. Kasi nsuka na ye ezali na bololo lokola mbondo, ezali na mopɔtu lokola mbɛli ya mpia mibale.” Bato mosusu basepelaka na likanisi ya kosala pite—ezala ná mwasi ya ndumba to moto mosusu. Nzokande, koboya kotya likebi na elembo oyo ezali koloba ete “epekisami kokɔta awa” to kolanda te etamboli ya mbindo, ebendelaka kaka moto mikakatano.
Liboso ya kotya lokolo na nzela ya ndenge wana, osengeli komituna ete, ‘Nzela yango ekomema ngai wapi?’ Kozwa mwa ntango mpo na kokanisa “nsuka” ekoki kosalisa yo olanda te nzela oyo ekomemela yo mikakatano minene. Sida, bamaladi mosusu oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, zemi, kosopa zemi, kobebisa boyokani na bato mosusu, mpe kotungisama lisosoli, ezali mikakatano oyo ekómelaka bato oyo baboyaka kotya likebi na bilembo oyo ezali na nzela. Ntoma Paulo amonisaki polele nsuka ya bato oyo bamipesi na pite mpe ekobo. Alobaki ete “bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.”—1 Bakolinti 6:9, 10.
“Oyo ezali nzela”
Na bantango mosusu ezalaka mpasi koyeba epai oyo nzela moko ekoki komema biso. Yango wana, tosengeli mpenza kozala na botɔndi ndenge Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso mpe alakisaka biso nzela! Yehova alobi ete: “Oyo ezali nzela, tambolá na yango.” (Yisaya 30:21) Nzela oyo Yehova azali kolakisa biso ekomema biso wapi? Atako nzela yango ezali nkaka mpe mpasi, Yesu alobaki ete ezali komema na bomoi ya seko.—Matai 7:14.
Talelá nzela oyo ozali kolanda. Ezali nzela ya malamu? Ekomema yo wapi? Bondelá Yehova mpo na koluka litambwisi na ye. Talelá Biblia, oyo ezali lokola karte oyo elakisaka nzela. Mbala mosusu mpe ekosɛnga otuna moto moko oyo azali kotambola na nzela oyo Nzambe azali kolakisa. Soki omoni ete osengeli kotika nzela oyo ozali kolanda mpo na kokɔta na nzela ya bomoi, salá yango nokinoki.
Moto oyo azali kosala mobembo alendisamaka ntango amoni elembo moko oyo elakisi ye ete azali kaka na nzela ya malamu. Nsima ya kotalela bomoi na yo, soki omoni ete ozali kotambola na nzela ya sembo, tiká ete yango elendisa yo na kokoba kokende liboso. Etikali moke okóma na esika oyo ekopesa yo esengo mingi na mobembo na yo.—2 Petelo 3:13.
Nzela nyonso ezali na epai oyo yango ememaka. Ntango okokóma na nsuka ya nzela oyo oponi, okozala esika nini? Na ntango wana, likambo moko ekobongwana lisusu te ata soki ofandi mpe ozali kokanisa ete, ‘Ah, soki nalandaki nzela mosusu!’ Yango wana, liboso okoba mobembo na yo, omituna ete, ‘“Nsuka” ya nzela oyo naponi ekozala nini?’
[Etanda/Bililingi na lokasa 10]
Nini ekozala “Nsuka”?
Mbala mingi, bilenge bakutanaka na komekama mpe masɛnginya ya kosala makambo oyo baninga na bango mingi basepelaka na yango. Makambo yango ekoki kozala oyo:
◼ Moninga moko atyoli yo ete okokoka komɛla likaya te.
◼ Molakisi moko azali kopesa yo toli ete ebongi okende na iniversite.
◼ Babengisi yo na fɛti moko epai masanga ekozala beboo mpe mbala mosusu bakokabola bangi na moto oyo alingi komɛla yango.
◼ Moninga moko apesi yo likanisi ete otya na Internet bafɔtɔ na yo mpe okoma makambo oyo olingaka.
◼ Moninga moko abengi yo bókende kotala filme ya bitumba to oyo ezali kolakisa bato bazali kosangisa nzoto.
Soki okutani na moko na makambo yango, okosala nini? Okondima kosala yango, to okotalela “nsuka” na yango? Ekozala malamu omituna motuna oyo: “Moto akoki kokamata mɔtɔ na ntolo na ye mpe bilamba na ye ekozika te? Moto akoki kotambola likoló ya makala ya mɔtɔ mpe matambe na ye makozikisama te?”—Masese 6:27, 28.