Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/7 nk. 30-32
  • Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Kobala basi ebele ezali mabe?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Nzambe abongwanaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • “Mobeko ya Yehova ezali ya kokoka”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/7 nk. 30-32

Mituna ya batángi

Nzambe andimaka mobali abala basi mingi?

Te; ntango Nzambe abalisaki mobali ya liboso na Edene, apesaki ye mwasi moko. Na nsima, Yesu Klisto amonisaki ete bayekoli na ye basengeli kolanda ndakisa wana.​—Genese 2:18-24; Matai 19:4-6.

Kasi, mibali lokola Abalayama, Yakobo, Davidi mpe Salomo oyo bazalaki na bomoi liboso Yesu aya awa na mabelé babalaki basi ebele, boye te? Ezali bongo, kasi Biblia emonisi nini mpo na mabala yango? Biblia elobeli matata oyo ebimaki na libota ya Abalayama mpe libota ya Yakobo lokola mibali yango bazalaki na basi mingi. (Genese 16:1-4; 29:18–30:24) Na nsima, Mibeko ya Nzambe elobaki mpo na mokonzi nyonso ete: “Ekoki . . . ete azwa basi mingi mpo na ye moko mpenza te, ete motema na ye epɛngwa te.” (Deteronome 17:15, 17) Salomo atosaki mobeko yango te mpe abalaki basi koleka 700! Likambo ya mawa, Salomo apesaki Yehova mokɔngɔ mpamba te ebele ya basi oyo abalaki bapɛngwisaki ye. (1 Mikonzi 11:1-4) Emonani polele ete Biblia emonisi ete ezali malamu te kozala na basi ebele.

Kasi, bato mosusu bakoki komituna mpo na nini Nzambe andimaki ete basaleli na ye bábala basi ebele. Tótalela ndakisa oyo: Esilá kokómela yo otika kiti to eloko mosusu ya ndako mpo na mwa ntango atako ezalaki lisusu malamu te, mbala mosusu mpo omonaki ete soki olongoli yango mbala moko ekobonga te to ozwi naino te eloko oyo okotya na esika na yango? Ya solo, banzela ya Nzambe mpe makanisi na ye eleki oyo ya biso mosika mpenza. (Yisaya 55:8, 9) Kasi, tokoki kososola mwa bantina oyo Nzambe andimaki na ntango moko ete mibali bábala basi mingi.

Tóbosana te ete na Edene, Yehova alakaki “momboto” moko oyo, nsukansuka akoboma Satana. Na nsima, Nzambe ayebisaki Abalayama ete akozala tata ya ekólo moko monene mpe ete Momboto oyo asakolamaki akouta na libota na ye. (Genese 3:15; 22:18, NW) Satana azalaki na mokano ya kobebisa makambo mpo Momboto yango aya te. Mpo na yango, azalaki koluka koboma ekólo ya Yisalaele. Mbala na mbala azalaki komeka Bayisalaele mpo básala lisumu mpo Nzambe aboya bango mpe abatela bango lisusu te.

Mpo na kobatela Bayisalaele na mitambo yango, Yehova azalaki mbala na mbala kotinda basakoli na ye mpo bákebisa Bayisalaele ntango babandi kotika mitinda na ye ya sembo. Kasi, ayebaki malamu ete mbala mingi Bayisalaele bakobanda kobuka ata mibeko oyo eleki ntina, na ndakisa mobeko oyo epekisaki kosambela bikeko. (Exode 32:9) Soki bazalaki na mokakatano mpo na kotosa mobeko wana ya ntina mingi, bakokaki nde kotosa mobeko oyo epekisaki kobala basi ebele? Lokola Yehova ayebi bato malamu, amonaki ete ntango ekokaki naino te mpo na kopekisa momeseno ya kobala basi ebele, oyo ebandaki bambula mingi liboso ya ntango wana. Soki apekisaki kobala basi mingi na ntango yango, elingaki kozala mpasi te Satana akweisa Bayisalaele na lisumu.

Ndenge Nzambe andimaki na ntango wana ete mibali bábalaka basi mingi ezalaki mpe na matomba mosusu. Esalisaki ekólo yango ekola noki. Lokola bato ya ekólo yango bakómaki mingi, esalisaki ekólo yango etikala tii ntango Masiya ayaki. Ekoki mpe kozala ete mobali oyo abali basi mingi azalaki kosalisa basi wana bázala na libateli na ntango ya mpasi mpo bazalaki kozwa bandako mpe mabota.

Kasi, tóbosana te ete Yehova atindaki te ete mibali bábala basi ebele. Andimaki yango kaka mpo na mwa ntango, mpe atyelaki yango mibeko mpo na kobatela basi yango. (Exode 21:10, 11; Deteronome 21:15-17) Ntango Yehova amonaki malamu apekisa basaleli na ye bábala basi mingi, atindaki Mwana na ye amonisa bato bálanda libala oyo Nzambe abandisaki na Edene. Na ndenge yango, Yesu apekisaki bayekoli na ye bábala basi mingi. (Malako 10:8) Na bongo, emonanaki solo mpenza ete Mibeko ya Moize ezalaki malamu na ntango na yango, kasi “mobeko ya Klisto” ezali malamu koleka.​—Bagalatia 6:2.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto