Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w11 15/1 nk. 31-32
  • Tyá makanisi na makambo oyo Yehova asili kosala mpo na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tyá makanisi na makambo oyo Yehova asili kosala mpo na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Toyokaka ndenge nini ntango bilikya na biso ekokisami te?
  • Makambo oyo Yehova asili kosala
  • Tózwa mateya na mikolo 40 ya nsuka oyo Yesu alekisaki awa na mabele
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • “Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
    “Yaká, landá ngai”
  • Mokanda ya Biblia nimero 42—Luka
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Klisto: Moto oyo bisakweli ekokisami epai na ye
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
w11 15/1 nk. 31-32

Tyá makanisi na makambo oyo Yehova asili kosala mpo na yo

MWA moke nsima ya lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye mibale bautaki Yerusaleme mpe bazalaki kokende na Emause. Evanzile ya Luka elobi boye: “Ntango bazalaki kosolola mpe kolobana, Yesu ye moko apusanaki penepene mpe abandaki kotambola elongo na bango; kasi miso na bango ezipamaki mpo báyeba ye te.” Mpe Yesu alobaki na bango ete: “‘Makambo nini yango bozali kosolola awa bozali kotambola na nzela?’ Batɛlɛmaki na bilongi ya mawa.” Mpo na nini bazalaki na mawa? Bayekoli bazalaki kokanisa ete Yesu akosikola Yisraele na bokonzi ya bato ya bikólo na ntango wana, kasi kosikolama ya ndenge wana esalemaki te. Na esika esalema bongo, Yesu abomamaki. Yango wana, bazalaki na mawa.​—Luka 24:15-21; Mis. 1:6.

Yesu abandaki kosolola na bayekoli yango. “Alimbwelaki bango makambo na ye na kati ya Makomami nyonso, banda na Moize tii na Basakoli nyonso.” Ya solo, makambo mingi ya ntina mpe oyo ekoki kolendisa kondima esalemaki na boumeli ya mosala ya Yesu! Ntango bayekoli bazalaki koyoka maloba ya Yesu, mawa na bango ebongwanaki esengo. Na nsima, na mpokwa, balobaki boye: “Mitema na biso ezalaki mɔtɔmɔtɔ ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?” (Luka 24:27, 32) Liteya nini tokoki kozwa na ezaleli ya bayekoli wana ya Yesu?

Toyokaka ndenge nini ntango bilikya na biso ekokisami te?

Bayekoli mibale na nzela ya Emause bayokaki mawa mpo makambo oyo bazalaki kozela esalemaki te. Bayokaki ndenge Masese 13:12 elobi ete: “Eloko ya kozelisazelisa ebɛlisaka motema.” Ndenge moko mpe, bato mosusu kati na biso oyo bazali kosalela Yehova na bosembo banda bambula mingi bakanisaki ete sikoyo mbɛlɛ “bolɔzi monene” esilá koya. (Mat. 24:21; Em. 7:14) Ezali solo ete sikoyo, lokola tozali kozela likambo ya ndenge wana mpe ndenge eyei naino te, ekoki kopesa mawa.

Kasi, kobosana te ete bayekoli wana mibale bazongelaki esengo nsima ya koyoka maloba ya Yesu oyo esalisaki bango bátya makanisi na bisakweli oyo esilaki kokokisama​—mosusu kutu ekokisamaki na miso na bango. Biso mpe tokoki kobatela kimya na biso ya motema mpe kolonga kolɛmba nzoto na ndenge wana. Michael, ndeko moko oyo azali nkulutu banda kala, alobaki boye: “Kotya makanisi te na makambo oyo Yehova asali naino te. Tyá nde makanisi na makambo oyo asili kosala.” Oyo nde toli kitoko!

Makambo oyo Yehova asili kosala

Tótalela mwa makambo minene oyo Yehova asili kosala. Yesu alobaki boye: “Moto oyo azali kondimela ngai, moto yango akosala mpe misala oyo ngai nazali kosala; mpe akosala misala ya minene koleka oyo.” (Yoa. 14:12) Lelo, basaleli ya Nzambe bazali kosala misala minene oyo esalemá naino te. Bato koleka milio nsambo bazali kolikya kobika na bolɔzi monene. Kanisá naino, esalemá naino te ete Yehova azala na basaleli ya sembo mingi boye oyo bazali kosala na mikili mingi boye na mabele mobimba! Yehova asalisi basaleli na ye bákokisa “misala ya minene koleka [oyo ya Yesu],” ndenge Yesu asakolaki.

Makambo nini lisusu Yehova asali? Asali ete bato ya mitema sembo bálongwa na ndenge ya elilingi na mokili oyo ya mabe, mpe bákɔta na paradiso ya elimo oyo asili kosala. (2 Ko. 12:1-4) Zwá ntango ya kokanisa mwa makambo oyo tozali na yango na paradiso ya elimo. Na ndakisa, bwaká liso na bibliotɛkɛ na yo moko to na bibliotɛkɛ oyo ezali na Ndako ya Bokonzi. Fungolá Index des publications de la Société Watch Tower, to Watchtower Library. Yoká drame moko ya Biblia. Zongisá na makanisi makɛlɛlɛ mpe makambo oyo ezalaki na liyangani oyo euti koleka. Kanisá mpe boninga ya malamu oyo tozali na yango kati na bandeko basi mpe mibali. Yehova azali mpenza na bokabi ndenge apesaka biso ebele ya bilei ya elimo mpe bandeko bakristo​—ezali mpenza paradiso ya elimo!

Mokomi ya nzembo Davidi alobaki boye: “Yo moko osali makambo mingi, Ee Yehova Nzambe na ngai, ɛɛ misala na yo ya kokamwa mpe makanisi na yo epai na biso.” (Nz. 40:5) Ya solo, soki tozali kotya makanisi na makambo kitoko oyo Yehova asili kosala mpo na biso mpe makambo kitoko oyo azali kokanisa mpo na biso, tokozwa makasi ya koyika mpiko mpe tokosalela Yehova, Tata na biso ya likoló, na motema moko.​—Mat. 24:13.

[Elilingi na lokasa 31]

Yesu asalisaki bayekoli na ye bátya makanisi na makambo oyo Yehova asilaki kosala mpo na bango

[Bililingi na lokasa 32]

Zongisá na makanisi makɛlɛlɛ mpe makambo oyo ezalaki na liyangani oyo euti koleka

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto