Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w17 Mars lok. 32
  • Nkombo moko ya Biblia na elokó moko ya kala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo moko ya Biblia na elokó moko ya kala
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Masolo mosusu
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • Nkombo ya Nzambe na boumeli ya bikeke
    Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko
  • Nkombo ya Nzambe—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
w17 Mars lok. 32
Mokanana ya kala azali kokoma na elokó oyo eumeli mbula 3000 oyo ezali na nkombo moko ya Biblia

Nkombo moko ya Biblia na elokó moko ya kala

Elokó moko ya kala oyo eumeli mbula 3000

Na 2012, bato ya arkeoloji bamonaki biteni mikemike ya elokó moko oyo esalemi na mabele ya lima mpe eumelaki mbula 3 000. Bato oyo basalaka bolukiluki yango basepelaki mingi na likambo yango. Mpo na nini? Ezalaki te mpo na biteni mikemike ya elokó yango, kasi mpo na makomi oyo ezalaki na elokó yango.

Nsukansuka, ntango bato ya arkeoloji basangisaki biteni yango esika moko, balongaki kotánga makomi ya Bakanana oyo ezalaki na elokó yango. Makomi yango ezalaki: “Eshba’al Ben Beda,” oyo elimboli “Eshba’al, mwana ya Beda.” Yango ezali mbala ya liboso bato ya arkeoloji bámona nkombo wana ekomami na elokó moko ya kala.

Biblia elobeli mpe moto moko nkombo na ye Eshibaala. Azalaki moko ya bana ya mokonzi Saulo. (1 Ntango 8:33; 9:39) Profesɛrɛ Yosef Garfinkel, moko ya bato oyo bamonaki elokó yango, alobaki: “Ezali likambo ya esengo komona ete nkombo Eshibaala ezali na kati ya Biblia, mpe sikoyo ekɔti na molɔngɔ ya biloko oyo bato ya arkeoloji bamoná, oyo etali boyangeli ya mokonzi Davidi.” Wana ezali ndakisa mosusu oyo emonisi ndenge arkeoloji eyokani na Biblia!

Na Biblia, Eshibaala mwana ya Saulo abengami mpe Ishi-boshete. (2 Samwele 2:10) Mpo na nini balongoli “baala” mpe na esika na yango batye “boshete”? Bato oyo basalaka bolukiluki balimboli ete mbala mosusu mokomi ya mokanda ya Samwele ya mibale aboyaki kosalela nkombo Eshibaala mpo ezalaki kokundwela Bayisraele Baala, nzambe ya ekumbaki oyo Bakanana bazalaki kosambela. Nzokande, na mokanda ya Ntango ya liboso, tokoki komona nkombo Eshibaala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto