Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo elandi ekotalelama na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 29 sanza ya zomi na mibale 2014.
Ndenge nini tosengeli kotalela etinda oyo ezali na Kolimbola Mibeko 14:1, oyo epekisi komikatakata nzoto mpo na moto oyo akufi? [3 sanza ya 11, w04 15/9 lok. 27 par. 5]
Wapi mokano ya mobeko oyo esɛngaki na bakonzi ya Yisraele ete bákoma mpo na bango moko Mobeko ya Nzambe mpe ‘bátángaka yango mikolo nyonso ya bomoi na bango’? (Mib. 17:18-20) [3 sanza ya 11, w02 15/6 lok. 12 par. 4]
Mpo na nini elobami ete “osengeli te kobalola mabele na ngɔmbɛ mpe na mpunda oyo ekangisami esika moko,” mpe ndenge nini etinda oyo elobeli ekanganeli ya mabe etali bakristo? (Mib. 22:10) [10 sanza ya 11, w03 15/10 lok. 32]
Mpo na nini epekisamaki kokanga lokola ndanga “enikelo ya mabɔkɔ to libanga na yango ya konikela ya likoló”? (Mib. 24:6) [17 sanza ya 11, w04 15/9 lok. 26 par. 3]
Bayisraele basengelaki kozala na botosi ya ndenge nini, mpe ezaleli nini esengeli kotinda biso tósalela Yehova? (Mib. 28:47) [24 sanza ya 11, w10 15/9 lok. 8 par. 4]
Wapi masɛngami misato ya minene oyo etali kozala na bomoi, oyo ezali na Kolimbola Mibeko 30:19, 20? [24 sanza ya 11, w10 15/2 lok. 28 par. 17]
Tosɛngisami nde na kobimisa na mongongo ya nse maloba nyonso oyo tozali kotánga kobanda na Ebandeli tii na Emoniseli? Limbolá? (Yos. 1:8) [8 sanza ya 12, w13 15/4 lok. 7 par. 4]
Nani azali “mokonzi ya limpinga ya Yehova” oyo Yosua 5:14, 15 elobeli, mpe ndenge nini lisolo yango ekoki kolendisa biso? [8 sanza ya 12, w04 1/12 lok. 9 par. 2]
Nini etindaki Akana akwea na lisumu, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndakisa na ye ya mabe? (Yos. 7:20, 21) [15 sanza ya 12, w10 15/4 nk. 20-21 par. 2, 5]
Na ndenge nini ndakisa ya Kalebe elendisaka biso lelo oyo? (Yos. 14:10-13) [29 sanza ya 12, w04 1/12 lok. 12 par. 2]