Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp22 No. 1 nk. 6-7
  • 1 | Koponaka bilongi te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • 1 | Koponaka bilongi te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Liteya ya Biblia:
  • Elimboli nini?
  • Oyo okoki kosala:
  • Tito “Mosalani na ngai mpo na bolamu na bino”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mokanda ya Biblia nimero 56—Tito
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • 3 | Longolá koyina na makanisi na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
wp22 No. 1 nk. 6-7
Moto moindo moko azali kotala foto ya mondele moko oyo azali koseka, mpe mondele moko azali kotala foto ya moto moindo moko oyo azali koseka. Na nsima ezali na bafoto ya bato oyo basiliki mpenza.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

1 | Koponaka bilongi te

Liteya ya Biblia:

“Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo na boyengebene andimami na ye.”​—MISALA 10:34, 35.

Elimboli nini?

Yehovaa Nzambe asalelaka biso makambo te na kolanda ekólo na biso, loposo ya nzoto na biso, to mpe mimeseno na biso. Kasi, atalelaka nde makambo ya ntina, na ndakisa, bomoto na biso ya kati mpe makanisi na biso. Biblia elobi mpe ete “moto amonaka oyo emonanaka na miso; kasi Yehova amonaka ndenge motema ezali.”​—1 Samwele 16:7.

Oyo okoki kosala:

Atako tozali na likoki te ya koyeba makambo oyo ezali na mitema ya bato, tokoki komekola Nzambe mpe kotalela bato kozanga kopona bilongi. Talelá moto na moto ndenge azali, na esika ya kotalela etuluku moko boye ya bato na mbala moko. Soki omoni ete ozali kotalela basusu na ndenge ya mabe, na ndakisa, bato ya loposo mosusu to ya mboka mosusu, bondelá Nzambe mpe sɛngá ye asalisa yo olongola makanisi yango ya mabe. (Nzembo 139:23, 24) Soki osɛngi Yehova na bosembo mpenza ete apesa yo makasi mpo oponaka bilongi te, yebá ete akoyoka libondeli na yo mpe akosalisa yo.​—1 Petro 3:12.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.​—Nzembo 83:18.

“Nazwaki naino libaku te ya kofanda na kimya na mondɛlɛ. . . Nakómaki mpenza na kati ya libota monene ya bandeko ya mokili mobimba.”​—TITUS

Likambo moko oyo esalemaki mpenza​—TITUS

Atikaki momeseno ya koyina bato

Titus.

Titus azalaki koyoka nkanda makasi mpo na mibeko oyo ekabolaka bato na kolanda loposo na bango, yango wana akɔtaki na etuluku ya bato ya mobulu oyo bazalaki kokanisa lokola ye. Alobi boye: “Mpo na koluka bitumba, tozalaki kokende na bisika lokola baotɛlɛ, banganda ya masanga oyo ezalaki na engumba, epai bazalaki kolinga baindo te.” Titus alobi ete koyina nde ezalaki kotinda ye, mpe abakisi boye: “Soki naswani na moto, azala mobali to mwasi, kaka ngai nde nazalaki kobanda bitumba.”

Titus abandaki kobongwana ntango abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Kotánga Biblia ezalaki kosalisa ye abongola lolenge na ye ya kokanisa. Asepelaki mingi mpenza na elaka ya Biblia oyo elobi ete awa na mabele, na mikolo ezali koya “liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.”​—Emoniseli 21:3, 4.

Liboso, Titus azalaki kosala makasi mpo na kolongola koyina na motema na ye. Alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te nabongola lolenge na ngai ya kokanisa mpe ezaleli na ngai.” Kasi, makambo atángaki na Misala 10:34, 35, oyo emonisi ete Nzambe aponaka bilongi te, esalisaki ye.

Yango ebotaki mbuma nini? Titus alobi ete ‘Nandimaki ete lingomba ya Batatoli ya Yehova ezali ya solo ntango namonaki mpenza bolingo oyo bazalaki komoniselana, kozanga kotala loposo ya moto. Kutu ata liboso nazwa batisimo, ndeko moko ya lisangá oyo azalaki mondɛlɛ, abengaki ngai nakende kolya na ndako na ye. Namonaki yango lokola ndɔtɔ. Nazwaki naino libaku te ya kofanda na kimya na mondɛlɛ mpe kolya elongo na ye. Nakómaki mpenza na kati ya libota monene ya bandeko ya mokili mobimba.’

Mpo na koyeba makambo mosusu na lisolo ya Titus, tángá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/08/2009, nkasa 28-29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto