Mituna Ya Batángi
Nsima ya mbotama ya Yesu, mpo na nini Yozefe ná Maria batikalaki na Beteleme na esika bázonga na mboka na bango na Nazarete?
Biblia elobeli te ntina oyo bazongaki te. Kasi eyebisi biso makambo ya mikemike oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ntina oyo ekokaki kosala ete bázonga te na mboka na bango na Nazarete.
Anzelu moko ayebisaki Maria ete akozwa zemi mpe akobota mwana. Ntango anzelu yango apesaki nsango yango, Maria ná Yozefe bazalaki kofanda na Nazarete, esika Yozefe abotamaki, na Galile. (Luka 1:26-31; 2:4) Na nsima, ntango balongwaki na Ezipito, bazongaki na Nazarete. Yesu akolaki kuna mpe akómaki moto ya Nazarete. (Mat. 2:19-23) Yango wana tokanisaka Nazarete ntango tolobelaka bankombo oyo misato: Yesu, Yozefe ná Maria.
Maria azalaki na ndeko na ye ya mwasi na nkombo Elizabeti, oyo azalaki kofanda na Yuda. Elizabeti azalaki mwasi ya nganga-nzambe Zekaria mpe akómaki mama ya Yoane Mobatisi. (Luka 1:5, 9, 13, 36) Maria akendaki kotala Elizabeti mpe afandaki elongo na ye sanza misato na Yuda. Na nsima Maria azongaki na Nazarete. (Luka 1:39, 40, 56) Yango wana, Maria amesanaki na teritware ya Yuda.
Na nsima, Yozefe atosaki etinda oyo Baroma basɛngaki ete moto na moto akende “kokomisa nkombo” na “engumba na ye moko.” Yango wana, Yozefe alongwaki na Nazarete mpe akendaki na Beteleme, oyo ezalaki “engumba ya Davidi” epai Masiya asengelaki kobotama. (Luka 2:3, 4; 1 Sa. 17:15; 20:6; Mik. 5:2) Kuna, Maria abotaki Yesu. Yozefe amonaki malamu te ete Maria asala mobembo ya molai elongo na mwana moke mpenza mpo na kozonga na Nazarete. Batikalaki na Beteleme, oyo ezalaki kilomɛtrɛ soki 9 uta na Yerusaleme. Yango wana, ezalaki mboka oyo ebongi mpo na bango mpo bámema mwana na bango ya moke mpenza na tempelo mpe bápesa likabo oyo Mobeko esɛngaki.—Lev. 12:2, 6-8; Luka 2:22-24.
Liboso anzelu ya Nzambe ayebisaki Maria ete mwana na ye akozwa “kiti ya bokonzi ya Davidi” mpe “akoyangela.” Ekoki kozala ete Yozefe ná Maria bamonaki ete ezalaki na ntina mpenza Yesu abotama na engumba ya Davidi! (Luka 1:32, 33; 2:11, 17) Mbala mosusu bakanisaki mpe ete ezali likambo ya bwanya kokoba kofanda kuna mpe kozela tii ntango bakoyeba makambo oyo Nzambe alingaki básala na nsima.
Toyebi te soki basalaki mbula boni na Beteleme ntango banganga-minzoto bakómaki kuna. Kasi, Maria ná Yozefe bazalaki kofanda na ndako, mpe mwana na bango azalaki ‘mwana ya moke,’ kasi bebe te. (Mat. 2:11) Emonani ete na esika bázonga na Nazarete, batikalaki na Beteleme ntango molai mpo na kofanda kuna.
Erode atindaki báboma “bana mibali nyonso na Beteleme . . . banda na mbula mibale tii na nse.” (Mat. 2:16) Anzelu moko ayebisaki Maria ná Yozefe bákima ná Yesu na Ezipito mpe bátikala kuna tii ntango Erode akokufa. Na nsima, Yozefe akendaki ná libota na ye na Nazarete. Kasi mpo na nini bazongaki na Beteleme te? Mpamba te na ntango yango, mwana ya Erode, Arkelausi, azalaki koyangela na Yudea mpe azalaki moto mabe mpenza. Longola yango, anzelu akebisaki lisusu Yozefe ete ezali likama kokende kuna. Kuna na Nazarete, Yozefe akokaki kobɔkɔla mwana malamu mpo akóma mosambeli ya solosolo ya Nzambe.—Mat. 2:19-22; 13:55; Luka 2:39, 52.
Emonani lokola Yozefe akufaki liboso Yesu afungolela bato nzela ya kozala na bomoi kuna na likoló. Soki ezali bongo, Yozefe akosekwa awa na mabele. Bato mingi bakozala na likoki ya kokutana na ye mpe ya koyeba makambo mikemike mpo na ye na oyo etali ntina oyo ye ná Maria batikalaki na Beteleme nsima ya mbotama ya Yesu.