Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 12:49
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 49 Mobeko ekozala moko mpo na mwana-mboka mpe mpo na mopaya oyo azali kofanda mopaya na kati na bino.”+

  • Balevi 17:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘Moto nyonso ya ndako ya Yisraele to mopaya moko oyo azali kofanda mopaya na kati na bino, oyo alei lolenge nyonso ya makila,+ nakotɛmɛla mpenza molimo+ oyo alei makila, mpe nakolongola ye mpenza na kati ya bato na ye.

  • Balevi 19:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Mopaya oyo azali kofanda mopaya epai na bino akokóma na miso na bino lokola mwana-mboka na kati na bino; mpe osengeli kolinga ye lokola yo moko,+ mpo bino bokómaki kofanda bapaya na mokili ya Ezipito.+ Ngai nazali Yehova Nzambe na bino.

  • Mitángo 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Mpe soki mopaya afandi mopaya elongo na bino, ye mpe asengeli kobongisa mbeka ya elekeli mpo na Yehova.+ Na kolanda mobeko ya elekeli mpe na kolanda ndenge oyo basalaka yango, ndenge wana nde akosala.+ Mobeko ekozala kaka moko mpo na bino, mpo na moto oyo afandi mopaya mpe mpo na mwana-mboka ya mokili yango.’”+

  • Mitángo 15:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mobeko ekozala kaka moko mpe ekateli ya lisambisi kaka moko mpo na bino mpe mpo na mopaya oyo azali kofanda mopaya elongo na bino.’”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto