Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 “Yehova akosala ete olonga banguna na yo oyo bazali kotɛmɛla yo.+ Bakobimela yo na nzela moko, kasi bakokima liboso na yo na nzela nsambo.+

  • Kolimbola Mibeko 32:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Ndenge nini moto moko akoki kolanda bato nkóto moko (1 000),

      Mpe bato mibale bakoki kokimisa bato nkóto zomi (10 000)?+

      Lobá kaka soki Libanga na bango atɛki bango+

      Mpe Yehova akabi bango.

  • Yosua 23:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Moto moko mpamba kati na bino akobengana bato nkóto (1 000),+ mpo Yehova Nzambe na bino nde moto azali kobundela bino,+ ndenge alakaki bino.+

  • Basambisi 7:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Na nsima, akabolaki mibali yango nkama misato (300) na bituluku misato mpe asimbisaki bango nyonso maseke+ na mabɔkɔ, mpe bilokó ya minene oyo ezalaki mpamba, ná bisungi ya mɔtɔ na kati ya bilokó yango ya minene.

  • Basambisi 15:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Amonaki mokuwa moko mobesu ya mbanga ya mpunda-mobali, asembolaki lobɔkɔ, azwaki yango mpe abomaki na yango mibali nkóto moko+ (1 000).

  • 1 Ntango 11:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Mpe Abishai+ ndeko ya Yoabe+ azalaki mokonzi ya bato yango misato; mpe azalaki kobwakela bato nkama misato (300) likɔnga na ye mpe babomami, mpe azalaki na lokumu lokola baoyo wana misato.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto