Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 28:39
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 39 “Mpe osengeli kolita zambala ya lini ya kitoko karékaré mpe kosala tirba ya lini ya kitoko,+ mpe okosala elamba ya kokanga na loketo,+ mosala ya moto oyo asalaka mayemi na bilamba.

  • Balevi 16:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Mpe nganga-nzambe oyo akotyama mafuta+ mpe oyo lobɔkɔ na ye ekotondisama na nguya* mpo na kosala mosala ya nganga-nzambe,+ mpo azala mokitani+ ya tata na ye, asengeli kozipa masumu mpe asengeli kolata bilamba ya lini.+ Ezali bilamba mosantu.+

  • Ezera 3:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Ntango batongi batyaki moboko+ ya tempelo ya Yehova, banganga-nzambe balati bilamba ya mosala+ na bango, bazalaki na bakelelo,+ mpe Balevi bana ya Asafe,+ bazalaki na basɛmbalɛ,+ batɛlɛmaki mpo na kosanzola Yehova na kolanda malako+ ya Davidi mokonzi ya Yisraele.

  • Ezekiele 44:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “‘Mpe ekosalema mpenza boye: ntango bazali kokɔta na baporte ya lopango ya kati, bakolata bilamba ya lini, mpe bakolata elamba ya lɛnɛ te ntango bazali kosala mosala na kati ya baporte ya lopango ya kati mpe na kati.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto