Kolimbola Mibeko 3:22 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 22 Bosengeli kobanga bango te, mpo Yehova Nzambe na bino Ye nde azali kobundela bino.’+ Kolimbola Mibeko 31:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te liboso na bango,+ mpamba te Yehova Nzambe na yo nde azali kotambola elongo na yo. Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te.”+ Nzembo 20:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Bamosusu batángaka makalo mpe bamosusu batángaka bampunda,+Kasi biso, tokotánga nkombo ya Yehova Nzambe na biso.+ Nzembo 46:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+Nzambe ya Yakobo azali esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.+ Sela. Masese 21:31 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Mpunda ezali eloko oyo ebongisami mpo na mokolo ya etumba,+ kasi lobiko ezali ya Yehova.+ Baroma 8:31 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 31 Bongo tokoloba nini na makambo yango? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akosala biso mabe?+
6 Bózala na mpiko mpe na makasi.+ Bóbanga te mpe bózala na nsɔmɔ te liboso na bango,+ mpamba te Yehova Nzambe na yo nde azali kotambola elongo na yo. Akosundola yo te mpe akotika yo soki moke te.”+
7 Bamosusu batángaka makalo mpe bamosusu batángaka bampunda,+Kasi biso, tokotánga nkombo ya Yehova Nzambe na biso.+
7 Yehova ya mampinga azali elongo na biso;+Nzambe ya Yakobo azali esika na biso ya kobombana oyo etombwaná.+ Sela.