Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 2:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe osengeli kokokisa mokumba na yo epai ya Yehova Nzambe na yo, elingi koloba kotambola na banzela+ na ye, kotosa mitinda na ye, mitindo na ye mpe bikateli na ye ya lisambisi+ mpe matatoli na ye, ndenge ekomami na mobeko ya Moize,+ mpo osala na ekɛngɛ na makambo nyonso oyo okosala mpe esika nyonso oyo okoleka;

  • Nzembo 19:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Mobeko+ ya Yehova ezali ya kokoka,+ ezongisaka molimo.+

      Bokundoli+ ya Yehova ebongi kotyelama motema,+ ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya.+

  • Nzembo 107:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Nani azali na bwanya? Akotyela makambo yango likebi+

      Mpe lisusu akotyela misala ya motema boboto ya Yehova likebi.+

  • Nzembo 111:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Kobanga Yehova ezali ebandeli ya bwanya.+

      ש [Sin]

      Baoyo nyonso bazali kosalela yango bazalaka mpenza na mayele ya kososola.+

      ת [Taw]

      Lisanzoli na ye ezali mpo na seko.+

  • Nzembo 119:98
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  98 Mitindo na yo ekómisaka ngai na bwanya koleka banguna na ngai,+

      Mpamba te ezali ya ngai mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+

  • Masese 10:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Moto oyo azali na bwanya na motema akondima mitindo,+ kasi ye oyo azali na mbɛbu ya bozoba akonyatama.+

  • Yirimia 8:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bato ya bwanya bayoki nsɔni.+ Bakómi na nsɔmɔ mpe bakokangama. Talá! Babwaki liloba mpenza ya Yehova, bongo bwanya nini bazali na yango?+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto