Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 21:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  9 Okokómisa bango lokola litumbu ya mɔtɔ na ntango oyo etyamá, ntango oyo okoya kotala bango.+

      Yehova na nkanda na ye akomɛla bango, mpe mɔtɔ ekozikisa bango.+

  • Nzembo 68:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Obengana bango ndenge mopɛpɛ ebenganaka molinga;+

      Ndenge mafuta enyangwaka na mɔtɔ,+

      Bato mabe bábeba liboso ya Nzambe.+

  • Masese 2:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Kasi bato mabe bakolongolama na mabele;+ mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.+

  • Yisaya 59:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Akopesa mbano na kolanda misala oyo basali,+ nkanda makasi epai ya banguna na ye, akosala banguna na ye makambo oyo ebongi na bango.+ Akopesa bisanga lifuti oyo ebongi na yango.+

  • Nahumu 1:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Yehova azali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye+ mpe oyo azongisaka mabe; Yehova azongisaka mabe+ mpe azalaka pene na koyoka nkɛlɛ.+ Yehova azongiselaka batɛmɛli na ye mabe,+ mpe akangelaka banguna na ye nkanda.+

  • 2 Petro 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi na nzela ya liloba yango kaka likoló+ ná mabele+ oyo ezali sikoyo ebombami mpo na mɔtɔ+ mpe ezali kobatelama mpo na kozela mokolo ya kosambisama+ mpe ya kobebisa bato oyo batyolaka Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto