Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Yehova akoyangela mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+

  • 1 Samwele 10:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Kasi bino, lelo oyo, boboyi Nzambe na bino,+ oyo azalaki kobikisa bino na mabe mpe bampasi na bino nyonso, mpe bolobi: “Te, osengeli nde kotyela biso mokonzi.” Bongo sikoyo, bótɛlɛma liboso ya Yehova na kolanda mabota+ na bino mpe na kolanda bituluku na bino ya bato nkóto nkóto.’”

  • Nzembo 10:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Yehova azali Mokonzi mpo na ntango oyo etyami ndelo te, ɛɛ mpo na seko.+

      Bikólo esili na mabele na ye.+

  • Nzembo 29:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yehova afandi likoló ya mpela;+

      Mpe afandi mokonzi seko na seko.+

  • Nzembo 146:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Yehova akozala mokonzi seko na seko,+

      Nzambe na yo, Ee Siona, mpo na libota na libota.+

      Bósanzola Yah!+

  • Yisaya 33:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Mpo Yehova azali Mosambisi+ na biso, Yehova azali Moto oyo apesaka biso Mibeko,+ Yehova azali Mokonzi+ na biso; ye moko akobikisa biso.+

  • Yisaya 43:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Nazali Yehova Mosantu na bino,+ Mozalisi ya Yisraele,+ Mokonzi na bino.”+

  • Danyele 4:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bilembo na ye ezali mpenza minene, mpe makamwisi na ye ezali na nguya mpenza!+ Bokonzi na ye ezali bokonzi ya seko,+ mpe boyangeli na ye ezali libota na libota.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto