10 Nde babenganaki te Bakanana+ oyo bazalaki kofanda na Gezere,+ mpe Bakanana yango bazali kofanda na kati ya Efraime tii na mokolo ya lelo,+ kasi bakómisaki bango bato oyo basalaka mosala makasi ya boombo.+
19 Mpe Yehova azalaki elongo na Yuda, bongo azwaki etúká ya ngombangomba, kasi akokaki te kobengana bato oyo bafandi na lobwaku ya patatalu, mpamba te bazalaki na makalo ya bitumba+ oyo ezalaki na makwangola.+