Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yosua 13:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 (banda na lobɔkɔ ya Nile oyo etalani na Ezipito, matá tii na ndelo ya Ekrone na nɔrdi,+ ezalaki kotángama ete ezali ya Bakanana);+ bankolo mitano ya lisangani+ ya Bafilistia, bato ya Gaza+ mpe bato ya Ashedode,+ bato ya Ashekelone,+ bato ya Gate+ mpe bato ya Ekrone;+ mpe Baavime.+

  • Basambisi 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bankolo mitano ya lisangani+ ya Bafilistia,+ ná Bakanana+ nyonso, ata mpe Basidone+ mpe Bahivi+ oyo bazalaki kofanda na Ngomba Libá,+ banda na Ngomba Baala-heremone+ tii na esika ya kokɔta na Hamate.+

  • Basambisi 16:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo bankolo ya lisangani+ ya Bafilistia bamataki epai na ye mpe balobaki na ye boye: “Kosá+ ye mpe talá soki makasi mingi oyo azali na yango eutaka wapi mpe na nini tokoki kolonga ye mpe na nini tokoki mpenza kokanga ye mpo tósukisa ye; mpe biso, tokopesa yo, moto na moto, shekele ya palata nkóto moko na nkama moko (1 100).”+

  • Basambisi 16:30
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 30 Mpe Samsone alobaki boye: “Molimo na ngai ekufa+ elongo na Bafilistia.” Bongo amigumbaki na makasi, mpe ndako yango ekwelaki bankolo ya lisangani mpe bato nyonso oyo bazalaki na kati na yango,+ na yango bato oyo abomaki na ntango ya liwa na ye balekaki oyo abomaki na ntango ya bomoi na ye.+

  • 1 Samwele 5:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na yango, batindaki bato mpe bayanganisaki bankolo nyonso ya lisangani ya Bafilistia epai na bango mpe balobaki boye: “Tokosala nini na sanduku ya Nzambe ya Yisraele?” Nsukansuka, balobaki ete: “Sanduku ya Nzambe ya Yisraele eleka tii na Gate.”+ Bongo bamemaki sanduku ya Nzambe ya Yisraele tii kuna.

  • 1 Samwele 6:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo bango balobaki ete: “Likabo yango ya ngambo oyo tosengeli kozongisela ye ezali nini?” Mpe bango balobaki boye: “Na kolanda motángo ya bankolo ya lisangani+ ya Bafilistia, bópesa misomba mitano ya wolo mpe bampoko mitano ya wolo, mpamba te mokomoko na bino mpe bankolo na bino ya lisangani bozali se na mpasi moko.

  • 1 Samwele 29:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe bankolo+ ya lisangani ya Bafilistia bazalaki koleka bato nkama nkama mpe bato nkóto nkóto, mpe na nsima, Davidi ná bato na ye balekaki elongo na Akishe.+

  • 1 Ntango 12:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Mpe bato mosusu ya Manase bakimaki, bayaki epai ya Davidi ntango ayaki elongo na Bafilistia+ mpo na kobunda etumba na Saulo; kasi asalisaki bango te, mpo ndenge bankolo ya lisangani+ ya Bafilistia bazwaki mokano, batikaki ye akende, balobi: “Akokende epai ya nkolo na ye Saulo mpe mitó na biso ekozala na likama.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto