Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 23:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Osengeli te kondima kanyaka, mpo kanyaka ebomaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ekoki kobulunganisa maloba ya bayengebene.+

  • Mitángo 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpo nakopesa yo lokumu mingi mpenza,+ mpe nakosala likambo nyonso oyo okoloba na ngai.+ Boye yaká, nabondeli yo. Lakelá ngai bato oyo mabe.’”

  • Basambisi 16:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Ntango Delila amonaki ete afungoleli ye motema na ye nyonso, na mbala moko atindaki bákende kobenga bankolo ya lisangani+ ya Bafilistia, alobaki ete: “Bómata mbala oyo, mpo afungoleli ngai motema na ye nyonso.”+ Bongo bankolo ya lisangani ya Bafilistia bamataki epai na ye mpo báya na mbongo na lobɔkɔ na bango.+

  • Masese 17:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Moto mabe akozwa kanyaka oyo euti na ntolo+ mpo na kotɛngisa banzela ya bosembo.+

  • Mosakoli 7:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Mpo monyoko ekoki kotinda moto ya bwanya asala lokola moto ya ligboma,+ mpe likabo+ ekoki kobebisa motema.+

  • Matai 26:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 mpe alobaki ete: “Bokopesa ngai nini mpo natɛkɛla bino ye?”+ Bayokanaki bápesa ye shekele ya palata ntuku misato (30).+

  • 1 Timote 6:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpo bolingo+ ya mbongo ezali mosisa+ ya makambo mabe ya ndenge nyonso,+ mpe lokola bamosusu bakolisi bolingo wana babungi nzela, batiki kondima mpe bamitɔbɔlitɔbɔli na ebele ya bampasi.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto