Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 15:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Nani kati na banzambe azali lokola yo, Ee Yehova?+

      Nani azali lokola yo, yo oyo oleki bosantu?+

      Ye oyo basengeli kobanga+ na nzembo ya lisanzoli,+ Ye oyo asalaka makambo ya kokamwa.+

  • 1 Samwele 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Moko te azali mosantu lokola Yehova, mpo mosusu azali te kaka yo;+

      Mpe libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.+

  • 1 Ntango 17:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Ee Yehova, mosusu lokola yo azali te,+ mpe Nzambe mosusu azali te, kaka yo+ na baoyo nyonso toyoká na matoi na biso.

  • Nzembo 83:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpo báyeba+ ete yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova,+

      Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló+ na mabele mobimba.+

  • Nzembo 89:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Mpo nani akokani na Yehova na likoló oyo etondi na mapata?+

      Nani na bana ya Nzambe+ akoki kokokana na Yehova?

  • Yirimia 10:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Ee Yehova, moko te azali lokola yo.+ Ozali monene, mpe nkombo na yo ezali monene kati na nguya.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto