Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Bakonzi 16:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe esalemaki boye: lokola nde kotambola na masumu ya Yeroboame+ mwana ya Nebate ezali likambo moke+ mpenza na miso na ye, azwaki lisusu Yezabele,+ mwana ya Etebaala mokonzi ya Basidone,+ azala mwasi na ye+ mpe abandaki kokende kosalela Baala+ mpe kogumbamela ye.

  • 1 Bakonzi 18:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Bongo esalemaki boye: ntango Yezabele+ abomaki basakoli ya Yehova,+ Obadia azwaki basakoli nkama moko [100] mpe abombaki bango ntuku mitano ntuku mitano na kati ya mobenga moko, mpe azalaki kopesa bango limpa ná mai.)+

  • 1 Bakonzi 19:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Na yango, Yezabele atindelaki Eliya momemi-nsango moko, na maloba oyo: “Tiká banzambe básala bongo+ mpe bábakisa yango,+ soki lobi na ngonga oyo, nakokómisa te molimo na yo lokola molimo ya mokomoko na bango!”

  • 1 Bakonzi 21:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Ya solo, ata moto moko te akómá lokola Ahaba,+ oyo amitɛká mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova mpe oyo mwasi na ye Yezabele+ azalaki kotinda asala mabe.+

  • 2 Bakonzi 9:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 Nsima na yango akɔtaki, alyaki mpe amɛlaki mpe na nsima alobaki boye: “Nabondeli bino, bótala mwasi wana oyo alakelami mabe+ mpe bókunda ye, mpo azali mwana ya mokonzi.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto