Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 37:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Bongo Mokonzi Zidikiya apesaki mitindo, mpe batyaki Yirimia na bolɔkɔ na Lopango ya Bakɛngɛli;+ mpe kuna bazalaki kopesa ye mokolo na mokolo limpa ya libungutulu, oyo ezalaki kouta na balabala ya basali-mampa,+ kino mampa nyonso esilaki na engumba.+ Mpe Yirimia akobaki kofanda na Lopango ya Bakɛngɛli.+

  • Yirimia 38:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Moto oyo akokoba kofanda na engumba oyo nde akokufa na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe.+ Kasi moto oyo akobima mpo na kokende epai ya Bakaladea nde akotikala na bomoi mpe akozwa mpenza molimo na ye lokola eloko epunzami, mpe akozala na bomoi.’+

  • Bileli 4:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Lolemo ya mwana oyo azali komɛla mabɛlɛ ekangami na edáda mpo na mposa ya mai.+

      Bana basɛngi limpa.+ Moto moko te azali kopesa bango yango.+

  • Ezekiele 5:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Moko ya bandambo misato na yo—bakokufa na maladi mabe,+ mpe bakosila na nzala na kati na yo.+ Mpe ndambo ya misato mosusu—bakokwea na mopanga zingazinga na yo. Mpe ndambo ya misato ya nsuka, nakopanza mpenza bango na mipɛpɛ nyonso,+ mpe nakobimisa mopanga nsima na bango.+

  • Ezekiele 7:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mopanga+ ezali libándá, mpe maladi mabe ná nzala ezali na kati.+ Moto nyonso oyo azali na elanga, akokufa na mopanga, mpe bato nyonso oyo bazali na engumba, nzala ná maladi mabe ekolya bango.+

  • Ezekiele 14:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “Yango wana, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ndenge wana nde ekozala ntango bitumbu na ngai minei oyo eyokisaka mpasi ekokokisama,+ elingi koloba, mopanga, nzala, banyama mabe ya zamba mpe maladi mabe,+ oyo nakotindela mpenza Yerusaleme, mpo na kolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto