Yobo 40:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Tiká kongala makasi ya nkanda na yo esopana,+Mpe talá moto nyonso ya lofundo mpe kitisá ye na nse. Nzembo 18:27 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 27 Mpo yo moko okobikisa bato ya mpasi;+Kasi okokitisa miso ya lolendo.+ Masese 6:17 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 17 miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,+ Yisaya 2:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Miso ya lolendo ya moto ya mabele ekokita mpenza na nse, mpe lofundo ya bato ekogumbama;+ mpe Yehova ye moko akotombwama mpenza na mokolo yango.+ Luka 18:14 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 14 Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene+ koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+ 1 Petro 5:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+
11 Tiká kongala makasi ya nkanda na yo esopana,+Mpe talá moto nyonso ya lofundo mpe kitisá ye na nse.
17 miso ya lolendo,+ lolemo ya lokuta+ mpe mabɔkɔ oyo ezali kosopa makila ya moto oyo azali na likambo te,+
11 Miso ya lolendo ya moto ya mabele ekokita mpenza na nse, mpe lofundo ya bato ekogumbama;+ mpe Yehova ye moko akotombwama mpenza na mokolo yango.+
14 Nazali koyebisa bino ete: Moto oyo akitaki na ndako na ye amonani moyengebene+ koleka moto wana mosusu; mpo moto nyonso oyo azali komitombola akoyokisama nsɔni, kasi moto oyo azali komikitisa akotombwama.”+
5 Ndenge moko mpe, bino bilenge, bómikitisaka+ liboso ya mikóló. Nzokande bino nyonso bólata ezaleli ya komikitisa na kati na bino,+ mpo Nzambe atɛmɛlaka bato ya lolendo, kasi amoniselaka bato ya komikitisa boboto monene.+