Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 41:44
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 44 Mpe Farao alobaki lisusu na Yozefe ete: “Ngai nazali Farao, kasi soki na ndingisa na yo te, moto moko te akoki kotombola lobɔkɔ na ye to lokolo na ye na mokili mobimba ya Ezipito.”+

  • 1 Bakonzi 2:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Na mbala moko Mokonzi Salomo apesaki mitindo na nzela ya Benaya+ mwana ya Yehoyada; mpe Benaya akwelaki ye mpe akufaki.+

  • Ezera 7:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Mpe moto nyonso oyo akotosa te mobeko ya Nzambe+ na yo mpe mobeko ya mokonzi, bákatela ye etumbu nokinoki, ezala liwa+ to kobengana,+ to lomande ya mbongo+ to bolɔkɔ.”

  • Danyele 3:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Sikoyo, soki bomibongisi mpo bókwea mpe bósambela ekeko oyo nasali, ntango bokoyoka lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga, ya kornemize mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki,+ wana malamu. Kasi soki bosambeli te, kaka na ntango wana, bokobwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela. Bongo nzambe yango nani oyo akoki kobikisa bino na mabɔkɔ na ngai?”+

  • Baroma 13:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Tiká molimo nyonso eyokelaka+ bakonzi oyo bazali liboso,+ mpo bokonzi+ ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te;+ bokonzi na bango ezali na ndelo+ oyo etyami na Nzambe.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto