Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 33:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Mpe Yehova azalaki se koloba na Manase mpe na bato na ye, kasi bazalaki kotya likebi te.+

  • 2 Ntango 36:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Mpe Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango azalaki se kotindela bango makebisi na nzela ya bamemi-nsango+ na ye, azalaki kotinda yango mbala na mbala, mpo azalaki koyokela bato na ye mpe esika na ye ya kofanda+ mawa.+

  • Nehemia 9:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Atako ozalaki kotatwela+ bango mpo na kozongisa bango na mobeko na yo,+ bango bazalaki kaka kosala makambo na lofundo+ mpe bayokaki mitindo na yo te; basalelaki bikateli na yo ya lisambisi+ lisumu,+ bikateli oyo, soki moto alandi yango, akozala na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bazalaki kaka kokanga matoi,*+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,+ mpe bayokaki te.+

  • Masese 28:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ye oyo alongoli litoi na ye ete ayoka mobeko te+—ata libondeli na ye ezali eloko moko oyo eyinamá.+

  • Yirimia 7:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe sikoyo lokola bozalaki kaka kosala misala oyo nyonso,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe ngai nazalaki kaka koloba na bino, kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba,+ kasi bino boyokaki te,+ mpe nazalaki kaka kobenga bino, kasi bino bozongisaki eyano te,+

  • Amose 5:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 “‘Na porte, bayiná moto oyo apamelaka,+ mpe bayiná makasi moto oyo alobaka makambo na bosolo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto