Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Ntango 36:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Kasi bazalaki ntango nyonso kosɛka+ bamemi-nsango ya Nzambe ya solo mpe komona maloba na ye mpamba+ mpe kotyola+ basakoli na ye, tii nkɛlɛ+ ya Yehova ekitelaki bato na ye, tii bakokaki lisusu kobikisama te.+

  • Nehemia 9:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Atako ozalaki kotatwela+ bango mpo na kozongisa bango na mobeko na yo,+ bango bazalaki kaka kosala makambo na lofundo+ mpe bayokaki mitindo na yo te; basalelaki bikateli na yo ya lisambisi+ lisumu,+ bikateli oyo, soki moto alandi yango, akozala na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bazalaki kaka kokanga matoi,*+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,+ mpe bayokaki te.+

  • Yirimia 11:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kasi bayokaki te mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kotambola, moto na moto, na motó makasi mpe motema mabe na bango;+ na yango nayeiselaki bango maloba nyonso ya kondimana oyo, oyo napesaki bango mitindo ete básalela, kasi basalelaki yango te.’”

  • Yirimia 25:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 “Banda mbula ya zomi na misato ya Yosia+ mwana ya Amone, mokonzi ya Yuda, kino mokolo ya lelo, mbula ntuku mibale na misato (23) oyo, liloba ya Yehova eyeli ngai, mpe nazalaki kaka koloba na bino, nazalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ mpe koloba, kasi boyokaki te.+

  • Zekaria 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 “‘Bókóma lokola batata na bino+ te oyo basakoli ya kala babelelaki bango+ ete: “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bózonga, nabondeli bino, bólongwa na banzela na bino ya mabe mpe na misala na bino ya mabe.’”’+

      “‘Kasi bayokaki te, mpe batyelaki ngai ata likebi te,’+ yango nde liloba ya Yehova.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto