Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 78:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  8 Mpe basengeli te kokóma lokola bankɔkɔ na bango,+

      Libota ya motó makasi mpe ya botomboki,+

      Libota ya bato oyo babongisaki motema na bango te+

      Mpe oyo Nzambe atyelaki elimo na bango motema te.+

  • Nzembo 81:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Bongo natikaki bango bátambola na motó makasi na bango;+

      Bazalaki kotambola na batoli na bango moko.+

  • Yisaya 65:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 “Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato ya motó makasi,+ oyo bazali kotambola na nzela oyo ezali malamu te,+ oyo bazali kolanda makanisi na bango;+

  • Yirimia 3:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Na ntango yango, bakobenga Yerusaleme ete kiti ya bokonzi ya Yehova;+ mpe bato ya bikólo nyonso bakoyanganisama epai na ye+ mpo na nkombo ya Yehova na Yerusaleme,+ mpe bakolanda lisusu te motó makasi mpe motema mabe na bango.”+

  • Yirimia 7:24
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 24 Kasi bayokaki te, mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi babandaki kotambola na batoli na bango, na motó makasi ya motema na bango ya mabe,+ bongo bazongaki nsima mpe bakendaki liboso te,+

  • Yirimia 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 kasi bazalaki kaka kotambola na kolanda motó makasi na bango+ mpe kolanda bikeko ya Baala,+ oyo batata na bango bateyaki bango;+

  • Zekaria 7:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe bakómisaki motema+ na bango lokola libanga ya emeri mpo bátosaka te mobeko+ mpe maloba oyo Yehova ya mampinga atindaki na nzela ya elimo na ye,+ na nzela ya basakoli ya kala;+ bongo Yehova ya mampinga ayokaki nkanda makasi.”+

  • Baroma 10:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Kasi na oyo etali Yisraele azali koloba ete: “Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazangá botosi+ mpe bafungolelaka ngai monɔkɔ.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto