Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 32:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Balongwe nokinoki na nzela oyo napesaki bango mitindo ete bátambola na yango.+ Bamisaleli ekeko ya mwana-ngɔmbɛ na ebende oyo banyangwisi mpe bazali kaka kogumbamela yango mpe kopesa yango mbeka mpe koloba ete: ‘Talá Nzambe na yo, Ee Yisraele, oyo akambaki yo mpe abimisaki yo na mokili ya Ezipito.’”+

  • Nehemia 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Kasi bango, ɛɛ bankɔkɔ na biso, basalaki makambo na lofundo+ mpe bakómisaki motó na bango makasi,*+ mpe bayokaki mibeko na yo te.

  • Nzembo 81:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Kasi bato na ngai bayoki mongongo na ngai te;+

      Mpe Yisraele esepeli na ngai ata moke te.+

  • Yirimia 11:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Kasi bayokaki te mpe basembolaki litoi na bango te,+ kasi bazalaki kaka kotambola, moto na moto, na motó makasi mpe motema mabe na bango;+ na yango nayeiselaki bango maloba nyonso ya kondimana oyo, oyo napesaki bango mitindo ete básalela, kasi basalelaki yango te.’”

  • Ezekiele 20:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “‘“Mpe babandaki kotombokela ngai,+ mpe bandimaki te koyokela ngai. Mokomoko na bango abwakaki te biloko ya bosɔtɔ ya miso na ye, mpe batikaki te bikeko ya bosɔtɔ ya Ezipito,+ yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkɛlɛ na ngai, mpo na kosilisela bango nkanda na ngai na kati ya mokili ya Ezipito.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto