8 Mpe ya solo balabala moko ya monene+ ekozala kuna, ɛɛ nzela; mpe ekobengama Nzela ya Bosantu.+ Moto ya mbindo akoleka kuna te.+ Mpe yango ekozala ya moto oyo azali kotambola na nzela, mpe bazoba bakoyengayenga kuna te.
10 Bóleka, bóleka na baporte. Bóbongisa nzela ya bato.+ Bótondisa mabele, bótondisa mabele na balabala monene. Bólongola mabanga na yango.+ Bótɛlɛmisela bato ya bikólo elembo.+