Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 12:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe nakopambola baoyo bazali kopambola yo, mpe ye oyo azali kolakela yo mabe, nakolakela ye mabe,+ mpe mabota nyonso ya mabele ekomizwela mpenza lipamboli na nzela na yo.”+

  • Nzembo 37:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Bayengebene bakozwa mabele,+

      Mpe bakofanda wana seko.+

  • Yisaya 49:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Talá oyo Yehova alobi: “Na ntango oyo nazali komonisa boboto nayanoli yo,+ mpe na mokolo moko ya lobiko nasalisi yo;+ mpe nazalaki kobatela yo mpo napesa yo lokola kondimana mpo na bato ya ekólo,+ mpo na kobongisa lisusu mokili,+ mpo na kosala ete mabula oyo etikalá mpamba ekóma lisusu ya bango,+

  • Matai 25:34
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 34 “Bongo mokonzi akoloba na baoyo bazali na lobɔkɔ na ye ya mobali: ‘Bóya, bino baoyo Tata na ngai apambolá,+ bózwa libula+ ya bokonzi+ oyo babongiselá bino banda mokili ebandá.*+

  • Yoane 10:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “Mpe nazali na bampate mosusu,+ oyo ezali ya lopango oyo te;+ yango mpe nasengeli komema yango, mpe ekoyoka mongongo na ngai,+ mpe ekokóma etonga kaka moko, na mobateli kaka moko.+

  • 2 Petro 3:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Kasi tozali kozela likoló ya sika+ mpe mabele ya sika+ ndenge alakaki, mpe kuna, boyengebene ekozala.+

  • Emoniseli 7:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Nsima ya makambo wana namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato,+ oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso+ mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso+ mpe na minɔkɔ nyonso,+ batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi+ mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ;+ mpe basimbi mandalala+ na mabɔkɔ.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto