Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 13:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe nakokómisa momboto na yo lokola zɛlo ya mokili, na yango soki moto akokoka kotánga zɛlo ya mokili, boye momboto na yo ekokoka kotángama.+

  • Ebandeli 15:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Bongo abimisaki ye libándá mpe alobaki ete: “Nabondeli yo, talá na likoló mpe tángá minzoto, soki okokoka mpenza kotánga yango.”+ Mpe alobaki na ye lisusu ete: “Momboto na yo ekokóma kaka bongo.”+

  • Ebandeli 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 nakopambola yo solo mpe nakokómisa solo momboto na yo mingi lokola minzoto ya likoló mpe lokola bambuma ya zɛlo oyo ezali pembenipembeni ya mbu;+ mpe momboto na yo akozwa porte* ya banguna na ye.+

  • Yirimia 31:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Talá oyo Yehova alobi: “‘Soki lola kuna na likoló ekokaka komekama mpe miboko ya mabele awa na nse ekokaka koyebana,+ mbɛlɛ ngai mpe nabwaki momboto mobimba ya Yisraele mpo na nyonso oyo basali,’+ yango nde liloba ya Yehova.”

  • Baebre 11:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Yango wana mpe na moto kaka moko+—mpe oyo tokoki koloba ete azalaki mokufi+—bana babotamaki ebele lokola minzoto ya likoló mpe lokola zɛlo oyo ezalaka pembeni ya mbu, bakokaki kotángama te.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto